Yirimia 16:1-21

16  Mpe liloba ya Yehova ekobaki koyela ngai ete:  “Osengeli te komizwela mwasi, mpe osengeli te kozala na bana mibali mpe bana basi na esika oyo.+  Mpo talá oyo Yehova alobi na ntina na bana mibali mpe na ntina na bana basi oyo bazali kobotama na esika oyo, mpe na ntina na bamama na bango oyo bazali kobota bango mpe na ntina na batata na bango oyo bazali kobota bango na mokili oyo,+  ‘Bakokufa na bamaladi oyo ebomaka.+ Bakolela bango te,+ mpe bakokundama te.+ Bakokóma lokola nyɛi na etando ya mabele;+ mpe bakosuka na mopanga mpe na nzala,+ mpe bibembe na bango ekozala mpenza bilei mpo na bikelamu oyo epumbwaka na likoló mpe mpo na banyama ya mabele.’+  “Mpo talá oyo Yehova alobi: ‘Kokɔta te na ndako oyo bazali kosala fɛti ya lilaka, mpe kokende kolela te mpe kotala bango te na mpasi na bango.’+ “‘Mpo nalongoli kimya na ngai epai ya bato oyo,’ yango nde liloba ya Yehova, ‘ɛɛ, motema boboto mpe motema mawa.+  Mpe bakokufa mpenza na mokili oyo, bato minene ná bato mike. Bakokundama te,+ mpe bato bakomibɛtabɛta ntolo te mpo na bango, mpe moto moko te akomikatakata nzoto+ to akomisala libandi mpo na bango.+  Mpe bakopesa bango te limpa ya lilaka mpo na kobɔndisa moto oyo azali kolela mowei;+ bakopesa mpe bango te kɔpɔ ya kobɔndisa ete bámɛla moto na moto mpo na tata na ye mpe mpo na mama na ye.+  Mpe osengeli te kokɔta na ndako ya fɛti mpo na kofanda elongo na bango mpo na kolya mpe komɛla.’+  “Mpo talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: ‘Talá nazali kosilisa na esika oyo, na miso na bino mpe na mikolo na bino, mongongo ya kosepela mpe mongongo ya esengo, mongongo ya mobali ya libala mpe mongongo ya mwasi ya libala.’+ 10  “Mpe ekosalema mpenza boye: ntango okoyebisa bato oyo maloba oyo nyonso mpe bakoloba na yo mpenza ete: ‘Mpo na nini Yehova alobi mpo na biso mpasi monene oyo nyonso, mpe libunga na biso ezali nini mpe lisumu na biso oyo tosaleli Yehova Nzambe na biso ezali nini?’+ 11  osengeli mpe koloba na bango ete: ‘“Mpo batata na bino batikaki ngai,”+ yango nde liloba ya Yehova, “mpe bazalaki kaka kolanda banzambe mosusu mpe kosalela bango mpe kogumbamela bango.+ Kasi batikaki ngai, mpe babatelaki mobeko na ngai te.+ 12  Mpe bino, na misala na bino, bosali mabe mingi koleka batata na bino,+ mpe talá, bozali kolanda moto na moto motó makasi+ mpe motema mabe na ye na kotosáká ngai te.+ 13  Mpe nakobwaka bino na mokili oyo+ tii na mokili oyo bino boyebi te,+ bino ná batata na bino, mpe kuna bokosalela mpenza banzambe mosusu+ butu moi, mpamba te nakomonisela bino boboto ata moke te.”’ 14  “‘Na yango, talá! mikolo ezali koya,’+ yango nde liloba ya Yehova, ‘ntango ekolobama lisusu te ete: “Lokola Yehova azali solo na bomoi, ye oyo abimisaki bana ya Yisraele na mokili ya Ezipito!”+ 15  kasi: “Lokola Yehova azali solo na bomoi, ye oyo abimisaki bana ya Yisraele na mokili ya nɔrdi mpe na mikili nyonso epai apalanganisaki bango!” mpe nakozongisa bango mpenza na mabele na bango, oyo napesaki bankɔkɔ na bango.’+ 16  “‘Talá nazali kotinda báluka baluki-mbisi ebele,’ yango nde liloba ya Yehova, ‘bongo bakoluka bango ndenge balukaka mbisi mpe bakokanga bango; mpe na nsima nakotinda báluka babomi-nyama ebele,+ bongo bakoluka bango ndenge balukaka nyama na ngomba nyonso mpe na ngomba nyonso ya moke mpe na madusu ya mabanga.+ 17  Mpo miso na ngai ezali likoló ya banzela nyonso na bango. Babombani te liboso na ngai, mpe libunga na bango ebombani te liboso ya miso na ngai.+ 18  Mpe liboso, nakopesa bango lifuti mobimba ya libunga+ na bango mpe ya lisumu na bango, mpo bakómisi mabele na ngai eloko mpamba.+ Batondisi libula na ngai na bibembe ya biloko na bango ya bosɔtɔ mpe na biloko na bango oyo eyinamá.’”+ 19  Ee Yehova makasi na ngai mpe esika makasi ya libateli na ngai, mpe esika na ngai ya kokima na mokolo ya mpasi,+ bato ya bikólo bakoya epai na yo longwa na bansuka ya mabele+ mpe bakoloba ete: “Ya solo mpenza bankɔkɔ na biso bazwaki kaka lokuta,+ eloko ya mpamba mpe makambo oyo epesaka litomba te.”+ 20  Moto ya mabele akoki nde komisalela banzambe nzokande bazali banzambe te?+ 21  “Bongo talá nazali kosala ete bango báyeba; na ntango yango nakosala ete bango báyeba lobɔkɔ na ngai mpe nguya na ngai,+ mpe bakoyeba mpenza ete nkombo na ngai ezali Yehova.”+

Maloba na nse