Yirimia 15:1-21
15 Mpe Yehova alobaki na ngai ete: “Ata soki Moize+ ná Samwele+ bátɛlɛmaka liboso na ngai, molimo na ngai elingaki kotala bato oyo te.+ Balingaki kobengana bango liboso ya elongi na ngai, ete bábima.+
2 Mpe ekosalema mpenza boye: soki balobi na yo ete ‘Tokobima mpo na kokende wapi?’ bongo osengeli koloba na bango boye: ‘Talá oyo Yehova alobi: “Moto nyonso oyo azali mpo na bolɔzi oyo ya liwa, na bolɔzi oyo ya liwa! Mpe moto nyonso oyo azali mpo na mopanga, na mopanga! Mpe moto nyonso oyo azali mpo na nzala, na nzala!+ Moto nyonso oyo azali mpo na bokangami, na bokangami!”’+
3 “‘Mpe nakotyela bango mitindo minei ya makambo,’+ yango nde liloba ya Yehova, ‘mopanga mpo na koboma, bambwa mpo na kobenda, bikelamu oyo epumbwaka na likoló+ ná banyama ya mabele mpo na kolya mpe kobebisa.
4 Mpe nakopesa bango na makonzi nyonso ya mabele mpo bálɛnga,+ mpo na Manase mwana ya Hizikiya, mokonzi ya Yuda, mpo na oyo asalaki na Yerusaleme.+
5 Mpo nani akomonisela yo motema mawa, Ee Yerusaleme, mpe nani akoya kotala yo na mpasi na yo,+ mpe nani akoya kotuna yo soki ozali malamu?’
6 “‘Yo moko osundoli ngai,’+ yango nde liloba ya Yehova. ‘Ozali kaka kozonga nsima.+ Mpe nakosembolela yo lobɔkɔ na ngai mpe nakoboma yo.+ Nalɛmbi koyoka mawa.+
7 Mpe nakopupola bango na nkanya+ na baporte ya mokili. Nakozangisa bango bana.+ Nakobebisa mpenza bato na ngai, mpo babongwani te mpo na kotika banzela na bango.+
8 Mpo na ngai, basi na bango oyo mibali bakufá bakómi mingi koleka mbuma ya zɛlo ya mbu. Nakomemela bango, mama ná elenge mobali, mopunzi na midi.+ Nakokweisela bango mobulungano mpe mitungisi na pwasa.+
9 Mwasi oyo abotaki bana nsambo akauki; molimo na ye ebundi mpo na mpema.+ Moi na ye elali nzokande mokolo ezali naino;+ eyoki nsɔni mpe ebulungani.’ ‘Mpe bato na bango oyo batikali, nakopesa bango na mopanga liboso ya banguna na bango,’+ yango nde liloba ya Yehova.”
10 Mawa na ngai,+ Ee mama na ngai, mpo obotá ngai, moto ya koswana mpe moto ya kowelana na mabele mobimba.+ Nadefisi te, badefisi ngai mpe te. Bango nyonso bazali kolakela ngai mabe.+
11 Yehova alobi boye: “Nakosalela yo mpenza makambo ya malamu.+ Ya solo mpenza nakolobela mpo na yo na ntango ya likama+ mpe na ntango ya mpasi, liboso ya monguna.+
12 Moto akoki kobukabuka ebende, ebende oyo euti na nɔrdi, mpe motako?
13 Bozwi na yo mpe biloko na yo ya motuya nakopesa yango epunzama,+ mpo na lifuti te, kasi mpo na masumu na yo nyonso, ɛɛ, na bateritware na yo nyonso.+
14 Mpe nakolekisa yango elongo na banguna na yo kino na mokili oyo oyebi te.+ Mpo mɔtɔ epelisami kati na nkanda na ngai.+ Epelisami mpo na kozikisa bino.”
15 Yo moko oyebi.+ Ee Yehova, kanisá ngai+ mpe tyelá ngai likebi na yo mpe zongiselá banyokoli na ngai mabe mpo na ngai.+ Atako oyokaka nkanda noki te, kotika te ete nalongolama.+ Talá ndenge nazali komema nsɔni mpo na yo.+
16 Maloba na yo ezwamaki, mpe nalyaki yango;+ mpe liloba na yo ekómaki nsai epai na ngai+ mpe esengo na motema na ngai;+ mpo ngai nabengami na nkombo na yo,+ Ee Yehova Nzambe ya mampinga.+
17 Nafandi te na etuluku ya baninga ya motema oyo bazali kosala masɛki+ mpo nabanda kosepela.+ Nafandi kaka ngai moko mpo na lobɔkɔ na yo,+ mpo otondisi ngai na makaneli.+
18 Mpo na nini mpasi na ngai ezali kosila te+ mpe mpota na ngai ezali kosila te?+ Eboyi kobela. Okómi mpenza epai na ngai lokola eloko moko ya bokosi,+ lokola mai ya kotyela motema te.+
19 Na yango, talá oyo Yehova alobi: “Soki ozongi, nakozongisa yo.+ Okotɛlɛma liboso na ngai.+ Mpe soki obimisi eloko ya motuya na biloko oyo ezali mpamba, okokóma lokola monɔkɔ na ngai. Bango bakozongela yo, kasi yo okozongela bango te.”
20 “Mpe nakómisi yo epai ya bato oyo efelo ya motako oyo ebatelami makasi;+ mpe bakobunda na yo mpenza, kasi bakolonga yo te.+ Mpo nazali elongo na yo, mpo na kobikisa yo mpe mpo na kosikola yo,”+ yango nde liloba ya Yehova.
21 “Nakobikisa yo na lobɔkɔ ya bato mabe,+ mpe nakosikola yo na lobɔkɔ ya banyokoli.”