Yirimia 14:1-22
14 Talá liloba ya Yehova oyo eyelaki Yirimia mpo na makambo etali bileko ya kokauka makasi:+
2 Yuda ezali kolela,+ mpe baporte na yango ebebi.+ Elɛmbi kino efandi na mabele,+ mpe koganga ya Yerusaleme emati likoló.+
3 Bato na bango ya lokumu batindi bato na bango ya mpamba mpo na koluka mai.+ Bakómi na mabulu. Bakuti mai te.+ Bazongi na bambɛki na bango mpamba. Bapɔli na nsɔni+ mpe balɛmbi nzoto, mpe bazipi motó na bango.+
4 Mpo na mabele oyo ebukanibukani mpo mbula makasi ezali na mokili te,+ baloni-bilanga bayoki nsɔni; bazipi motó na bango.+
5 Mpo ata nyama ebengami bishe eboti kati na esobe, kasi etiki mwana, mpo matiti ya pɛtɛpɛtɛ ezali te.
6 Mpe bazɛbrɛ+ etɛlɛmi likoló ya bangomba mike oyo ezali polele; ebendi mopɛpɛ na zolo lokola bambulú; miso na yango elɛmbi mpo matiti ezali te.+
7 Ata soki mabunga na biso ezali kofunda biso, Ee Yehova, salá mpo na nkombo na yo;+ mpo misala na biso ya kozanga bosembo ekómi ebele;+ tosaleli yo lisumu.+
8 Ee yo elikya ya Yisraele,+ Mobikisi na ye+ na ntango ya mpasi,+ mpo na nini okómi lokola moto oyo afandi mopaya na mokili, mpe lokola moto ya mobembo oyo akɔti kaka mpo na kolala na butu?+
9 Mpo na nini okómi lokola moto oyo akamwe makasi, lokola mobali moko ya nguya oyo azali kokoka kobikisa te?+ Nzokande, yo moko ozali kati na biso,+ Ee Yehova, mpe biso tobengami na nkombo na yo.+ Kotika biso te.
10 Talá oyo Yehova alobi mpo na bato oyo: “Boye balingi koyengayenga;+ bapekisi makolo na bango te.+ Na yango, Yehova asepeli na bango te.+ Sikoyo akomikundola libunga na bango mpe akotya likebi na masumu na bango.”+
11 Mpe Yehova alobaki na ngai boye: “Kobondela te mpo na bato oyo mpo na likambo ya malamu ata moko te.+
12 Ntango bazali kokila bilei, nazali koyoka te kosɛngasɛnga na bango ya kolela,+ mpe ntango bazali kopesa likabo ya kotumba mobimba mpe likabo ya mbuma, nazali kosepela na yango te;+ mpo nazali kosukisa bango na mopanga, na nzala, mpe na maladi mabe.”+
13 Na yango nalobaki: “Aa! Ee Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso! Talá basakoli bazali koloba na bango ete: ‘Bokomona mopanga te, mpe nzala ekokómela bino te, kasi nakopesa bino nde kimya ya solo na esika oyo.’”+
14 Mpe Yehova alobaki lisusu na ngai boye: “Basakoli bazali kosakola nde lokuta na nkombo na ngai.+ Natindi bango te, napesi mpe bango mitindo te mpe nalobi na bango te.+ Emonaneli ya lokuta, kosakola makambo oyo ebombaná, likambo ya mpambampamba,+ mpe bokosi ya motema na bango, yango nde bazali koloba na bino na maloba ya esakweli.+
15 Na yango, talá oyo Yehova alobi mpo na basakoli yango oyo bazali kosakola na nkombo na ngai mpe baoyo natindi te mpe baoyo bazali koloba ete mopanga to nzala ekokómela mokili oyo te: ‘Basakoli yango bakosila na mopanga mpe na nzala.+
16 Mpe bato oyo bango bazali kosakwela bakokóma bato oyo babwakami na babalabala ya Yerusaleme mpo na nzala mpe mopanga, mpe moto akozala te mpo na kokunda bango, ɛɛ bango, basi na bango mpe bana na bango ya mibali mpe bana na bango ya basi.+ Mpe nakosopela bango mpasi na bango.’+
17 “Mpe osengeli koloba na bango liloba oyo: ‘Tiká miso na ngai esopa mpisoli butu moi mpe etika te,+ mpo ngɔndɔ, mwana mwasi ya bato na ngai, abukani+ na kokwea moko ya monene, na mpota moko ya mpasi makasi.+
18 Soki nabimi mpo na kokɔta na elanga, bongo talá bato babomami na mopanga!+ Mpe soki nakɔti na engumba, bongo talá bamaladi ya nzala!+ Mpo mosakoli ná nganga-nzambe bakei kotambolatambola na mokili oyo bayebi te.’”+
19 Obwaki mpenza Yuda,+ to molimo na yo eyini mpenza Siona?+ Mpo na nini obɛti biso, bongo tozali kobika te?+ Tozalaki kolikya komona kimya, kasi likambo moko ya malamu eyei te; mpe ntango ya kobika, nde talá! nsɔmɔ!+
20 Ee Yehova, tondimi mabe na biso, libunga ya bankɔkɔ na biso,+ mpo tosaleli yo lisumu.+
21 Mpo na nkombo na yo+ kosalela biso makambo na kozanga limemya te; kotyola te kiti ya bokonzi na yo ya nkembo.+ Kanisá; kobuka kondimana na yo ná biso te.+
22 Na bikeko ya mpamba+ ya bikólo ezali nde na moko oyo ekoki konɔkisa mbula, to likoló yango moko ekoki nde kopesa mbula monene?+ Yo ozali Ye te, Ee Yehova Nzambe na biso?+ Mpe tozali kolikya epai na yo, mpo yo moko nde osali biloko oyo nyonso.+