Yirimia 13:1-27

13  Talá oyo Yehova alobi na ngai: “Kende, mpe osengeli komizwela mokaba ya lini mpe latá yango na loketo na yo, kasi osengeli kokɔtisa yango na mai te.”  Bongo nazwaki mokaba yango na kolanda liloba ya Yehova mpe nalataki yango na loketo na ngai.  Mpe liloba ya Yehova eyelaki ngai mbala ya mibale ete:  “Kamatá mokaba oyo ozwaki, oyo ezali na loketo na yo, mpe tɛlɛmá, kende na Efrate,+ mpe bombá yango kuna na lidusu ya libanga.”  Bongo nakendeki mpe nabombaki yango pembeni ya Efrate, kaka ndenge Yehova apesaki ngai mitindo.  Kasi esalemaki boye: nsima ya mikolo mingi Yehova alobaki na ngai ete: “Tɛlɛmá, kende na Efrate mpe kamatá kuna mokaba oyo napesaki yo mitindo ete obomba yango kuna.”  Na yango, nakendaki na Efrate mpe natimolaki mpe nazwaki mokaba yango na esika oyo nabombaki yango, mpe talá! mokaba yango esilaki kobeba; ezalaki lisusu na ntina te.  Bongo liloba ya Yehova eyelaki ngai ete:  “Talá oyo Yehova alobi: ‘Ndenge wana nde nakobebisa lolendo ya Yuda+ mpe lolendo oyo etondi na Yerusaleme. 10  Bato mabe oyo, oyo bazali koboya kotosa maloba na ngai,+ oyo bazali kotambola na motó makasi na bango+ mpe oyo bazali kaka kolanda banzambe mosusu mpo na kosalela bango mpe mpo na kogumbamela bango,+ bakozala mpe kaka lokola mokaba oyo, oyo ezali lisusu na ntina te.’ 11  ‘Mpo kaka ndenge mokaba ekangamaka na loketo ya moto, ndenge wana nde nasalaki ete ndako mobimba ya Yisraele mpe ndako mobimba ya Yuda ekangama na ngai,’+ yango nde liloba ya Yehova, ‘mpo bakóma epai na ngai ekólo,+ mpe nkombo,+ mpe lisanzoli, mpe eloko moko ya kitoko; kasi batosaki te.’+ 12  “Mpe osengeli koloba na bango liloba oyo, ‘Talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobi: “Elokó nyonso ya monene ezali eloko oyo batondisaka na vinyo.”’+ Mpe bakoloba mpenza na yo ete: ‘Biso toyebi nde te ete elokó nyonso ya monene ezali eloko oyo batondisaka na vinyo?’ 13  Mpe osengeli koloba na bango boye: ‘Talá oyo Yehova alobi: “Talá, nazali kotondisa bato nyonso oyo bafandi na mokili oyo na molangwa, ná bakonzi oyo bafandi mpo na Davidi+ na kiti na ye ya bokonzi, ná banganga-nzambe, ná basakoli, mpe bato nyonso oyo bafandi na Yerusaleme.+ 14  Mpe nakotutanisa bango na bango, batata ná bana, na mbala moko,”+ yango nde liloba ya Yehova. “Nakomonisa motema mawa ata moke te, mpe nakoyoka mpasi na motema ata moke te, mpe nakozala na mawa te oyo ekopekisa ngai naboma bango.”’+ 15  “Bóyoka, mpe bótya litoi. Bózala na lolendo te,+ mpo Yehova ye moko nde alobi.+ 16  Bópesa Yehova Nzambe na bino nkembo,+ liboso ete ayeisa molili+ mpe liboso ete makolo na bino etutana likoló ya bangomba na ebandeli ya molili.+ Mpe bokolikya mpenza komona pole,+ mpe akokómisa yango mpenza molili makasi;+ akobongola yango molili tuu.+ 17  Mpe soki boyoki yango te,+ na bisika ya kobombana, molimo na ngai ekolela mpo na lolendo mpe ekobimisa mpenza mpisoli; mpe liso na ngai ekosopa mpisoli,+ mpo etonga+ ya Yehova ekomemama lokola mokangami. 18  “Lobá na mokonzi mpe na mwasi ya lokumu+ ete: ‘Bófanda na esika ya nse,+ mpo motole na bino ya kitoko ekokwea mpenza, ekolongwa na mitó na bino.’+ 19  Bingumba ya sudi ekangami, bongo moto moko azali te mpo na kofungola yango. Yuda na mobimba na yango ememami na mboka mopaya. Ememami yango nyonso na mboka mopaya.+ 20  “Tombolá miso na yo mpe talá baoyo bazali koya longwa na nɔrdi.+ Wapi etonga oyo bapesaki yo, etonga+ na yo ya kitoko? 21  Okoloba nini ntango bakotyela yo likebi,+ nzokande yo moko oteyaki bango lokola baninga na yo ya motema, oyo bazalaki pembeni na yo, uta na ebandeli?+ Bampasi ya kobota ekokanga yo te, lokola oyo ya mwasi oyo azali kobota?+ 22  Mpe ntango okoloba na motema na yo:+ ‘Mpo na nini makambo oyo ekweli ngai?’+—ezali mpo na ebele ya mabunga na yo nde bilamba na yo, oyo ezalaki kozipa yo, elongolami;+ matindi na yo emonisami mpasi. 23  “Mokushi+ akoki nde kobongola loposo na ye? to nkoi matɔnɔ na yango?+ Soki boye, bino mpe bokoki kosala malamu, bino bato oyo boteyami kosala mabe.+ 24  Boye nakopalanganisa bango+ lokola matiti ya blé oyo ezali koleka na mopɛpɛ oyo euti na esobe.+ 25  Yango nde libula na yo, ndambo na yo oyo namekeli yo,”+ yango nde liloba ya Yehova, “mpo obosani ngai+ mpe ozali kaka kotyela makambo ya lokuta motema.+ 26  Bongo ngai mpe nakotombola bilamba na yo tii na elongi na yo, mpe nsɔni na yo ekomonana mpenza,+ 27  misala na yo ya ekobo+ mpe kogangaganga+ na yo, etamboli na yo ya nsɔni na makambo ya bondumba. Namoni makambo na yo ya bosɔtɔ likoló ya mwa bangomba, na kati ya esobe.+ Mawa na yo, Ee Yerusaleme! Okoki kozala pɛto te+—tii ntango nini?”+

Maloba na nse