Yirimia 12:1-17
12 Ee Yehova, ozali moyengebene+ ntango nazali komemela yo likambo na ngai, ɛɛ, ntango nazali koloba na yo mpo na makambo ya kosamba. Mpo na nini nzela ya bato mabe yango nde elongi,+ mpo na nini baoyo nyonso bazali kosala na bokosi nde bazangi mitungisi?
2 Oloni bango; bazwi mpe misisa. Bazali kaka kokende liboso; baboti mpe mbuma. Na monɔkɔ na bango, ozali pene, kasi na bangɛi na bango, ozali mosika.+
3 Mpe yo moko, Ee Yehova, oyebi ngai malamu;+ ozali komona ngai, mpe otalitali motema na ngai soki ekangami na yo.+ Kabolá bango lokola bampate mpo na kobomama,+ mpe tyá bango pembeni mpo na mokolo ya kobomama.
4 Kino ntango nini mokili ekokoba kokauka,+ mpe milona ya elanga nyonso ekokauka?+ Mpo na mabe ya bato oyo bafandi kati na yango, banyama mpe bikelamu oyo epumbwaka ekɔmbɔlami.+ Mpo balobi: “Azali komona te mikolo na biso oyo ekoya.”
5 Mpo opoti mbangu ná bato oyo batambolaka na makolo, mpe balɛmbisi yo, bongo ndenge nini okoki kopota mbangu ná bampunda?+ Mpe ozali komityela motema na mokili ya kimya?+ Bongo okosala ndenge nini na mwa bazamba oyo ekangamakangamá oyo ezali pembenipembeni ya Yordani?+
6 Mpo ata bandeko na yo ná bato ya ndako ya tata na yo, ata bango basaleli yo makambo na bokosi.+ Ata bango mpe babeleli nsima na yo na mongongo makasi. Kondimela bango te, kaka mpo bazali kolobela yo makambo malamu.+
7 “Natiki ndako na ngai;+ nasundoli libula na ngai;+ nakabi molingami ya molimo na ngai na lobɔkɔ ya banguna na ye.+
8 Libula na ngai ekómi epai na ngai lokola nkɔsi na kati ya zamba. Ebimiseli ngai mongongo na yango. Yango wana nayini yango.+
9 Libula+ na ngai ezali mpo na ngai lokola ndɛkɛ ya langilangi oyo ekangaka banyama; bandɛkɛ oyo ekangaka banyama ezali zingazinga likoló na yango.+ Bóya, bóyangana, bino banyama nyonso ya zamba; bóya na yango mpo na kolya.+
10 Babateli mingi ya mpate+ babebisi elanga na ngai ya vinyo;+ banyatinyati libula na ngai.+ Libula na ngai ya kitoko+ bakómisi yango esobe oyo etikali mpamba.
11 Bakómisi yango esika oyo etikali mpamba;+ ekauki; etikali mpamba liboso na ngai.+ Bakómisi mokili mobimba esika oyo etikali mpamba, mpo moto ata moko te atye likambo yango na motema.+
12 Bapunzi bayei na banzela nyonso oyo bato balekalekaka na esobe. Mpo mopanga ya Yehova ezali kolya longwa na nsuka moko ya mokili kino na nsuka mosusu ya mokili.+ Ekelamu ya mosuni ata moko te ezali na kimya.
13 Baloni blé, kasi babuki banzubɛ.+ Babɛli mpo na mosala; bakozwa litomba ata moko te.+ Mpe bakoyokela mbuma na bino nsɔni mpo na nkanda ya kongala ya Yehova.”
14 Talá oyo Yehova alobi mpo na bato mabe nyonso oyo bafandi penepene na ngai,+ oyo bazali kosimba libula oyo napesaki bato na ngai, ɛɛ Yisraele:+ “Talá, nazali kopikola bango na mabele na bango;+ mpe nakopikola ndako ya Yuda na kati na bango.+
15 Mpe ekosalema mpenza boye: nsima wana nakopikola bango, nakoyokela lisusu bango mawa+ mpe nakozongisa bango, moto na moto na libula na ye mpe moto na moto na mokili na ye.”+
16 “Mpe ekosalema mpenza boye: soki bayekoli mpenza banzela ya bato na ngai na kolapáká ndai na nkombo na ngai+ ete: ‘Lokola Yehova azali solo na bomoi!’ ndenge bateyaki bato na ngai kolapa ndai na nkombo ya Baala,+ bakotongama kati na bato na ngai.+
17 Kasi soki batosi te, nakopikola mpenza ekólo yango, nakopikola yango mpe nakobebisa yango,”+ yango nde liloba ya Yehova.