Yirimia 11:1-23
11 Liloba oyo eyelaki Yirimia uta na Yehova ete:
2 “Bóyoka maloba ya kondimana oyo!
“Mpe osengeli koloba+ yango epai ya bato ya Yuda mpe epai ya bato oyo bafandi na Yerusaleme,
3 mpe osengeli koloba na bango ete: ‘Talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobi: “Alakelama mabe moto oyo azali koyoka te maloba ya kondimana oyo,+
4 oyo napesaki bankɔkɔ na bino mitindo na mokolo oyo nabimisaki bango na mokili ya Ezipito,+ na litumbu ya konyangwisa bibende,+ ete: ‘Bótosa mongongo na ngai, mpe bosengeli kosala makambo na kolanda oyo nyonso nazali kopesa bino mitindo;+ mpe bokokóma mpenza bato na ngai mpe ngai nakokóma Nzambe na bino,+
5 mpo nakokisa ndai oyo nalapelaki bankɔkɔ na bino,+ ya kopesa bango mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi,+ lokola na mokolo ya lelo.’”’”
Bongo nazongisaki mpe nalobaki ete: “Amen, Ee Yehova.”
6 Mpe Yehova alobaki na ngai lisusu ete: “Sakolá maloba oyo nyonso kati na bingumba ya Yuda mpe kati na babalabala ya Yerusaleme,+ ete: ‘Bóyoka maloba ya kondimana oyo, mpe bosengeli kokokisa yango.+
7 Mpo nakebisaki polelepolele bankɔkɔ na bino na mokolo oyo nalongolaki bango na mokili ya Ezipito+ mpe kino mokolo ya lelo, kolamukáká ntɔngɔntɔngɔ mpe kokebisáká ete: “Bótosa mongongo na ngai.”+
8 Kasi bayokaki te mpe basembolaki litoi na bango te,+ kasi bazalaki kaka kotambola, moto na moto, na motó makasi mpe motema mabe na bango;+ na yango nayeiselaki bango maloba nyonso ya kondimana oyo, oyo napesaki bango mitindo ete básalela, kasi basalelaki yango te.’”
9 Lisusu, Yehova alobaki na ngai ete: “Likita mabe emonani kati na bato ya Yuda mpe kati na bato oyo bafandi na Yerusaleme.+
10 Bazongeli mabunga ya bankɔkɔ na bango,+ bato ya liboso, oyo baboyaki kotosa maloba na ngai, kasi balandaki nde banzambe mosusu mpo na kosalela bango.+ Ndako ya Yisraele mpe ndako ya Yuda babuki kondimana na ngai oyo nasalaki ná bankɔkɔ na bango.+
11 Na yango, talá oyo Yehova alobi: ‘Talá nazali kokitisela bango mpasi+ oyo bakokoka kobima na yango te;+ mpe bakobelela ngai mpo na kosɛnga lisalisi, kasi nakoyoka bango te.+
12 Mpe bingumba ya Yuda mpe bato oyo bafandi na Yerusaleme bakokende mpenza mpe bakobelela mpo na kosɛnga lisalisi epai ya banzambe oyo bango bazali kobimisela milinga ya mbeka,+ kasi oyo bakobikisa bango ata moke te na ntango ya mpasi na bango.+
13 Mpo banzambe na yo bakómi ebele lokola bingumba na yo, Ee Yuda;+ mpe botyeli eloko ya nsɔni+ bitumbelo ebele lokola babalabala ya Yerusaleme, bitumbelo mpo na kobimisela Baala milinga ya mbeka.’+
14 “Mpe yo, kobondela mpo na bato oyo te, mpe mpo na bango kotombola mongongo te mpo na kosɛngasɛnga na kolela to kosala libondeli te,+ mpo ngai nakoyoka te ntango bakobelela ngai mpo na mpasi na bango.+
15 “Molingami na ngai azali kosala mosala nini na ndako na ngai,+ mpo ete mingi kati na bango básala likambo oyo,+ mwango ya mabe?+ Mpe na mosuni mosantu ya bambeka nde bakosala ete likambo yango eleka likoló na yo,+ ntango mpasi na yo ekoya? Na ntango yango okosepela?+
16 ‘Nzete ya olive oyo etondi na nkasa, oyo ezali komonana kitoko na mbuma mpe na ndenge na yango,’ yango nde nkombo Yehova abengi yo.+ Na lokito ya koganga makasi, apelisi yango mɔtɔ, mpe babuki bitape na yango.+
17 “Mpe Yehova ya mampinga ye moko, Moto oyo aloni yo,+ alobeli mpasi oyo ekoyela yo mpo na mabe oyo ndako ya Yisraele+ mpe ndako ya Yuda esali mpo na kosilikisa ngai na kobimiseláká Baala milinga ya mbeka.”+
18 Mpe Yehova ye moko ayebisaki ngai mpo nayeba yango. Na ntango yango omonisaki ngai misala na bango.+
19 Mpe nazalaki lokola mwana-mpate ya mobali, ya botosi, oyo amemami mpo na kobomama,+ mpe nayebaki te ete ngai nde bazalaki kosalela myango:+ “Tóbebisa nzete ná biloko na yango ya kolya, mpe tólongola ye na mokili ya bato ya bomoi,+ mpo nkombo na ye ekanisama lisusu te.”
20 Kasi Yehova ya mampinga azali kosambisa na boyengebene;+ azali kotalatala bangɛi mpe motema.+ Ee tiká namona ndenge okozongisela bango mabe, mpo epai na yo nde namonisi likambo na ngai ya kosamba.+
21 Na yango, talá oyo Yehova alobi mpo na bato ya Anatote+ oyo bazali koluka molimo na yo: “Osengeli kosakola na nkombo ya Yehova te,+ noki okufa na lobɔkɔ na biso”;
22 na yango, talá oyo Yehova ya mampinga alobi: “Talá, nazali kotyela bango likebi. Bilenge bakokufa na mopanga.+ Bana na bango ya mibali mpe bana na bango ya basi bakokufa na nzala.+
23 Mpe ata moto moko te akotikala mpo na bango, mpamba te nakoyeisela bato ya Anatote+ mpasi, na mbula oyo bakotyela bango likebi.”+