Yirimia 1:1-19
1 Maloba ya Yirimia+ mwana ya Hilikiya, moko ya ba-nganga-nzambe oyo bazalaki na Anatote+ na mokili ya Benyamina;+
2 oyo liloba ya Yehova eyelaki na mikolo ya Yosiya+ mwana ya Amone,+ mokonzi ya Yuda, na mbula ya zomi na misato ya boyangeli na ye.+
3 Mpe yango ekobaki koyela ye na mikolo ya Yehoyakime+ mwana ya Yosiya, mokonzi ya Yuda, kino na nsuka ya mbula ya zomi na moko ya Zidikiya+ mwana ya Yosiya, mokonzi ya Yuda, kino Yerusaleme ememamaki na mboka mopaya na sanza ya mitano.+
4 Mpe liloba ya Yehova ebandaki koyela ngai ete:
5 “Liboso nasala yo na kati ya libumu,+ nayebaki yo,+ mpe liboso obima na libumu, nasantisaki yo.+ Nakómisaki yo mosakoli epai ya bikólo.”
6 Kasi nalobaki ete: “Aa! Ee Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso! Talá, nayebi koloba te,+ mpo nazali kaka mwana.”+
7 Mpe Yehova alobaki na ngai lisusu ete: “Koloba te ete: ‘Nazali kaka mwana.’ Kasi okokende epai ya baoyo nyonso nakotinda yo; mpe okoloba likambo nyonso oyo nakopesa yo mitindo.+
8 Kobanga bilongi na bango te,+ mpo ‘nazali elongo na yo mpo na kobikisa yo,’+ yango nde liloba ya Yehova.”
9 Bongo Yehova asembolaki lobɔkɔ na ye mpe asalaki ete yango esimba monɔkɔ na ngai.+ Na nsima, Yehova alobaki na ngai ete: “Talá natye maloba na ngai na monɔkɔ na yo.+
10 Talá, lelo oyo napesi yo mokumba ya kozala likoló ya bikólo mpe likoló ya makonzi,+ mpo na kopikola mpe kokweisa, kobebisa mpe kobuka,+ kotonga mpe kolona.”+
11 Mpe liloba ya Yehova ekobaki koyela ngai ete: “Yirimia, ozali komona nini?”
Bongo nalobaki: “Nazali komona etape ya nzete ya amande.”
12 Mpe Yehova alobaki na ngai lisusu ete: “Omoni malamu, mpo nazali kosɛnzɛla na ntina etali liloba na ngai mpo na kokokisa yango.”+
13 Mpe liloba ya Yehova eyelaki ngai mpo na mbala ya mibale ete: “Ozali komona nini?”
Bongo nalobaki: “Nazali komona nzungu ya kolambela oyo ezali na monɔkɔ monene, oyo bazali kopupola, mpe monɔkɔ na yango etɛngami longwa na nɔrdi.”
14 Na yango, Yehova alobaki na ngai ete: “Mpasi ekouta na nɔrdi, ekokwela bato nyonso oyo bafandi na mokili.+
15 Mpo ‘talá, nazali kobengisa mabota nyonso ya makonzi ya nɔrdi,’ yango nde liloba ya Yehova;+ ‘mpe bakoya mpenza mpe mokomoko na bango akotya kiti na ye ya bokonzi na esika ya kokɔta na baporte ya Yerusaleme,+ mpe liboso ya bifelo na yango zingazinga mpe liboso ya bingumba nyonso ya Yuda.+
16 Mpe nakoyebisa bango bikateli na ngai ya lisambisi mpo na mabe nyonso na bango,+ na ndenge batiki ngai+ mpe bazali kaka kobimisela banzambe mosusu milinga ya mbeka+ mpe bazali kogumbamela misala ya mabɔkɔ na bango.’+
17 “Nde yo, okokanga mokaba na loketo na yo,+ mpe osengeli kotɛlɛma mpe koloba na bango makambo nyonso oyo nazali kopesa yo mitindo. Kolɛnga na nsɔmɔ te mpo na bango,+ mpo ngai nalɛngisa yo na nsɔmɔ te liboso na bango.
18 Kasi ngai, talá, nakómisi yo lelo engumba oyo ebatelami makasi, likonzí ya ebende mpe bifelo ya motako+ mpo na kotɛmɛla mokili mobimba,+ liboso ya bakonzi ya Yuda, liboso ya bankumu na yango, liboso ya banganga-nzambe na yango mpe liboso ya bato ya mokili.+
19 Mpe bakobunda na yo mpenza, kasi bakolonga yo te,+ mpo ‘nazali elongo na yo,’+ yango nde liloba ya Yehova, ‘mpo na kobikisa yo.’”+