Yakobo 4:1-17
4 Bitumba ezali kouta wapi mpe kobunda oyo ezali na kati na bino ezali kouta wapi? Ezali nde kouta na likambo oyo:+ na bamposa makasi na bino ya bisengo ya nzoto oyo ezali kobundabunda na binama na bino, boye te?+
2 Bozali na mposa, kasi bozali kozwa te. Bozali kokoba koboma bato+ mpe kolula biloko ya bato,+ kasi bozali kozwa te. Bozali kokoba kobunda+ mpe kosala etumba. Bozali kozwa te mpo bosɛngaka te.
3 Bosɛngaka, kasi bozwaka te, mpo bozali kosɛnga na mokano ya mabe,+ mpo bóbebisa yango na bamposa makasi na bino ya bisengo ya nzoto.+
4 Basi ya ekobo,+ boyebi te ete kozala moninga ya mokili ezali nde kozala monguna ya Nzambe?+ Yango wana, moto nyonso oyo alingi kozala moninga+ ya mokili azali komikómisa monguna ya Nzambe.+
5 To emonani nde epai na bino ete likomami elobi kaka mpamba ete: “Makanisi+ ya likunya oyo efandi na kati na biso ezali ntango nyonso na mposa makasi ya makambo ndenge na ndenge”?
6 Atako bongo, boboto monene oyo ye amonisaka ezali monene koleka.+ Yango wana elobi: “Nzambe atɛmɛlaka bato ya lolendo,+ kasi amoniselaka bato ya komikitisa boboto monene.”+
7 Yango wana, bómikitisa+ liboso ya Nzambe; kasi bótɛmɛla Zabolo,+ mpe akokima bino.+
8 Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.+ Bópɛtola mabɔkɔ na bino, bino basumuki,+ mpe bókómisa mitema na bino pɛto,+ bino bato ya mitema mibale.+
9 Bókóma mawamawa, bólela mpe bóbimisa mpisoli.+ Kosɛka na bino ekóma kolela, mpe esengo na bino ekóma kolɛmba nzoto.+
10 Bómikitisa na miso ya Yehova,+ mpe ye akotombola bino.+
11 Bandeko, bótika kolobelana mabe.+ Moto oyo azali kolobela ndeko mabe to azali kosambisa+ ndeko na ye azali kolobela mibeko mabe mpe azali kosambisa mibeko. Nzokande soki ozali kosambisa mibeko, ozali motosi ya mibeko te, kasi mosambisi.+
12 Ezali na moto moko kaka oyo apesaka mibeko mpe asambisaka,+ ye oyo akoki kobikisa mpe koboma.+ Kasi yo nani mpo osambisa mozalani na yo?+
13 Sikoyo bóyoka, bino bato oyo bolobaka ete: “Lelo to lobi tokokende na engumba oyo mpe tokolekisa mbula moko kuna, mpe tokosala mombongo mpe tokozwa benefisi mingi,”+
14 nzokande boyebi te ndenge bomoi na bino ekozala lobi.+ Mpo bozali londende oyo ebimaka mpo na mwa ntango moke mpe na nsima elimwe.+
15 Kutu, bosengelaki nde koloba ete: “Soki Yehova alingi,+ tokozala na bomoi mpe lisusu tokosala boye to boye.”+
16 Kasi sikoyo bozali komikumisa na makambo na bino moko ya lolendo.+ Komikumisa nyonso ya ndenge wana ezali mabe.
17 Yango wana, soki moto ayebi kosala oyo ezali malamu kasi azali kosala yango te,+ ezali lisumu.+