Yakobo 2:1-26

2  Bandeko na ngai, bozali kondimela Nkolo na biso Yesu Kristo, nkembo na biso,+ bongo bozali mpe kopona bilongi?+  Mpo, soki moto moko alati mpɛtɛ ya wolo na misapi na ye ná bilamba ya kitoko akɔti na liyangani+ na bino, bongo mobola moko oyo alati bilamba ya mbindo ayei mpe kokɔta,+  kasi bino bozali kosepela+ na moto oyo alati bilamba ya kitoko mpe bolobi: “Fandá awa na esika ya malamu,” kasi bolobi na mobola: “Yo tɛlɛmá wana,” to: “Fandá kuna pene na ebonga ya makolo na ngai,”  bokabolikaboli bato na bituluku na kati na bino+ mpe bokómi basambisi+ oyo bakataka makambo na ndenge ya mabe,+ boye te?  Bandeko na ngai ya bolingo, bóyoka. Nzambe aponaki baoyo bazali babola+ na mokili mpo bázala bazwi+ na kati ya kondima mpe bázala bazwi-ya-libula ya bokonzi, oyo alakaki baoyo balingaka ye,+ boye te?  Kasi, bino botyoli mobola. Bazwi nde banyokolaka+ bino, mpe bamemaka bino na makasi na batribinale,+ boye te?  Bafingaka+ nkombo ya lokumu oyo bozwaki,+ boye te?  Nzokande, soki bozali kotosa mobeko ya mokonzi+ ndenge likomami elobi: “Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko,”+ bozali kosala malamu.  Kasi soki bozali kaka kopona bilongi,+ bozali kosala lisumu, mpo mobeko epameli bino+ ete bozali bato oyo babukaka mibeko. 10  Mpo moto oyo azali kotosa Mibeko nyonso kasi abɛti libaku na likambo moko, abuki mibeko nyonso.+ 11  Mpo moto oyo alobaki ete: “Osengeli kosala ekobo te,”+ alobaki mpe ete: “Osengeli koboma moto te.”+ Yango wana, soki ozali kosala ekobo te kasi ozali koboma bato, okómi moto oyo abukaka mibeko. 12  Bókoba koloba ndenge wana mpe bókoba kosala ndenge wana lokola bato oyo bakosambisama na mobeko ya bato ya bonsomi.+ 13  Moto oyo azalaka na motema mawa te akosambisama na motema mawa te.+ Motema mawa elongaka lisambisi. 14  Bandeko na ngai, litomba ezali wapi soki moto alobi ete azali na kondima+ kasi azali na misala te?+ Kondima wana ekoki nde kobikisa ye?+ 15  Soki ndeko mobali moko to ndeko mwasi moko azali bolumbu mpe azangi bilei oyo ekoki mpo na mokolo,+ 16  kasi moko na bino alobi na bango ete: “Bókende na kimya, bóyɔta mɔtɔ mpe bólya malamu,” nzokande bopesi bango te biloko oyo esengeli mpo na nzoto na bango, litomba ezali wapi?+ 17  Ndenge moko mpe, kondima, soki ezali na misala te,+ ekufi. 18  Nzokande, moto moko akoki koloba ete: “Yo ozali na kondima, mpe ngai nazali na misala. Lakisá ngai kondima na yo oyo ezali na misala te, mpe ngai nakolakisa yo kondima na ngai na misala na ngai.”+ 19  Ondimaka ete Nzambe azali kaka moko?+ Ozali kosala malamu. Nzokande bademo bandimaka yango mpe balɛngaka.+ 20  Kasi olingi nde koyeba, Ee moto mpamba, ete kondima oyo ezangi misala esalaka eloko te? 21  Abrahama tata na biso+ atángamaki moyengebene mpo na misala na ye nsima ya kokaba mwana na ye Yisaka mbeka na etumbelo, boye te?+ 22  Omoni, kondima na ye esalaki nzela moko na misala na ye mpe na nzela ya misala na ye kondima na ye ekokaki,+ 23  mpe likomami ekokisamaki oyo elobi ete: “Abrahama andimelaki Yehova, mpe batángaki ye moyengebene,”+ mpe akómaki kobengama “moninga ya Yehova.”+ 24  Bomoni, moto akotángama moyengebene+ mpo na misala na ye,+ kasi na kondima kaka te.+ 25  Ndenge moko mpe Rahaba+ mwasi ya ndumba atángamaki moyengebene mpo na misala na ye, nsima ya koyamba malamu bamemi-nsango mpe kotika bango bákende na nzela mosusu, boye te?+ 26  Ya solo, se ndenge nzoto oyo ezali na elimo te ekufi,+ ndenge moko mpe kondima oyo ezali na misala te ekufi.+

Maloba na nse