Tito 1:1-16

1  Paulo, moombo+ ya Nzambe mpe ntoma+ ya Yesu Kristo na kolanda kondima ya bato oyo Nzambe aponi+ mpe na boyebi ya sikisiki+ ya solo+ oyo eyokani na ezaleli ya kokangama na Nzambe+  mpo na elikya moko ya bomoi ya seko+ oyo Nzambe, oyo akoki kobuka lokuta te,+ alaká banda kalakala mpenza,+  mpe na ntango na ye mpenza amonisaki liloba na ye polele na mosala ya kosakola oyo bapesi ngai,+ na etinda ya Mobikisi na biso,+ Nzambe;  epai ya Tito, mwana ya solosolo+ na kondima oyo tozali na yango biso nyonso: Boboto monene mpe kimya ya Nzambe Tata+ mpe ya Kristo Yesu Mobikisi+ na biso ezala na yo.  Natikaki yo na Krɛtɛ+ mpo na ntina oyo: osembola makambo oyo ezali kotambola malamu te mpe otya+ bankulutu na engumba mokomoko, ndenge napesaki yo mitindo,+  soki azali mobali oyo afundami na likambo ata moko te,+ mobali ya mwasi kaka moko,+ oyo azali na bana oyo bazali bandimi oyo bafundami te mpo na bomoi ya mbindo mpe bazali mitó makasi te.+  Mpo mokɛngɛli asengeli kozala moto oyo afundami te+ mpo azali kapita+ ya Nzambe, azala matoi mangbongi te,+ asilikaka mpambampamba te,+ molangwi-masanga te mpe aswanaka na bato te,+ abɛtaka bato te,+ azala te moto ya lokoso oyo alukaka kozwa litomba na ndenge ya mabe,+  kasi azala nde moyambi bapaya,+ moto oyo alingaka makambo ya malamu, moto ya makanisi malamu,+ moyengebene, moto ya sembo,+ moto oyo amipekisaka,+  oyo akangami makasi na liloba ya sembo na ndenge na ye ya koteya,+ mpo ayeba kolendisa na mateya oyo epesaka litomba+ mpe ayeba kopamela+ batɛmɛli. 10  Mpo ezali na bato mingi ya mitó makasi, bato ya bilobaloba,+ mpe bato oyo babebisaka makanisi, mingimingi mpenza bato oyo bakangami na kokatama ngenga.+ 11  Esengeli kokangisa bango minɔkɔ, mpo bato yango bazali se kokɔtisa mobulu na mabota+ ntango bazali koteya makambo oyo basengeli koteya te mpo na kozwa litomba na ndenge ya mabe.+ 12  Moko na bango, mosakoli na bango moko, alobaki ete: “Bato ya Krɛtɛ bazalaka ntango nyonso bato ya lokuta, banyama mabe+ ya zamba, bato ya lokoso oyo balingaka mosala te.” 13  Litatoli oyo ezali ya solo. Yango wana, pameláká bango makasi,+ mpo bázala makasi+ na kondima, 14  bátyaka likebi te na masapo+ ya Bayuda mpe na mibeko ya bato+ oyo bazali kopesa solo mokɔngɔ.+ 15  Biloko nyonso ezali pɛto epai ya bato ya pɛto.+ Kasi epai ya bato ya mbindo+ mpe oyo bazali na kondima te+ ata eloko moko te ezali pɛto, kutu makanisi na bango mpe lisosoli+ na bango ekómá mbindo. 16  Balobaka polele ete bayebi Nzambe,+ kasi bazali kowangana ye na misala na bango,+ mpo bazali bato ya bosɔtɔ mpenza mpe bazangá botosi mpe babongi ata na mosala moko ya malamu te.+

Maloba na nse