Nzembo 99:1-9
99 Yehova ye moko akómi mokonzi.+ Bituluku ya bato bábulungana.+Afandi likoló ya bakeruba.+ Mabele eningana.+
2 Yehova azali monene na Siona,+Mpe azali likoló koleka bato ya bikólo nyonso.+
3 Bákumisa nkombo na yo.+Yango ezali monene mpe ezali kobangisa mpe ezali mosantu.+
4 Ye mokonzi alingá bosembo mpe asalelaka bokasi na ye mpo na yango.+Yo moko opiká kolongobana makasi.+Yo nde okokisi bosembo mpe boyengebene na Yakobo.+
5 Bókumisa Yehova Nzambe na biso+ mpe bógumbama liboso ya ebonga ya makolo na ye;+Ye azali mosantu.+
6 Moize ná Arona bazalaki na kati ya banganga-nzambe na ye,+Mpe Samwele azalaki na kati ya baoyo bazalaki kobelela nkombo na ye.+Bazalaki kobelela Yehova, mpe ye azalaki koyanola bango.+
7 Akobaki koloba na bango na kati ya likonzí ya lipata.+Bango babatelaki makundoli na ye mpe lilako oyo apesaki bango.+
8 Ee Yehova Nzambe na biso, yo moko oyanolaki bango.+Ozalaki mpo na bango Nzambe moko oyo alimbisaka,+Mpe oyo azongisaka mabe mpo na misala na bango oyo ekendá nsango mabe.+
9 Bókumisa Yehova Nzambe na biso+Mpe bógumbama na ngomba na ye mosantu.+Mpo Yehova Nzambe na biso azali mosantu.+