Nzembo 98:1-9

Mondule. 98  Bóyembela Yehova loyembo ya sika,+Mpo asali makambo ya kokamwa.+Lobɔkɔ na ye ya mobali, ɛɛ lobɔkɔ na ye mosantu, epesi ye lobiko.+   Yehova asali ete lobiko na ye eyebana;+Alakisi boyengebene na ye na miso ya bikólo.+   Akanisi lisusu motema boboto na ye mpe bosembo na ye oyo amoniselaki ndako ya Yisraele.+Bansuka nyonso ya mabele emoni lobiko ya Nzambe na biso.+   Bóganga na koganga ya bolongi mpo na Yehova, bino bato nyonso ya mabele.+Bósepela mpe bóganga na esengo mpe bóbɛta mondule.+   Bóbɛtɛla Yehova mondule na nzɛnzɛ,+Na nzɛnzɛ mpe na mongongo ya mondule.+   Na bakelelo mpe na lokito ya liseke+Bóganga na koganga ya bolongi liboso ya Mokonzi, Yehova.   Mbu enguluma lokola nkake mpe biloko oyo etondi kuna,+Mabele oyo ebotaka mpe baoyo bazali kofanda na yango.+   Bibale mpenza ebɛta mabɔkɔ;Bangomba nyonso elongo eganga na esengo+   Liboso ya Yehova, mpo ayei kosambisa mabele.+Na boyengebene, akosambisa mabele oyo ebotaka+Mpe na bosembo, bato ya bikólo.+

Maloba na nse