Nzembo 97:1-12

97  Yehova ye moko akómi mokonzi!+ Mabele ezala na esengo.+Ebele ya bisanga esepela.+   Mapata mpe molili tuu ezingi ye;+Boyengebene mpe bosembo ezali esika oyo kiti na ye ya bokonzi etyami.+   Mɔtɔ ezali kotambola liboso na ye,+Mpe ezali kozikisa banguna na ye bipai nyonso.+   Mikalikali na ye engɛngisaki mabele oyo ebotaka;+Mabele emonaki mpe ekómaki na mpasi makasi.+   Bangomba ekómaki konyangwa lokola mafuta mpo na Yehova,+Mpo na Nkolo ya mabele mobimba.+   Likoló esakoli boyengebene na ye,+Mpe bato ya bikólo nyonso bamoni nkembo na ye.+   Baoyo nyonso basalelaka ekeko nyonso oyo eyemami bázala na nsɔni,+Baoyo bazali komikumisa mpo na banzambe ya mpambampamba.+Bógumbamela ye, bino banzambe nyonso.+   Siona eyokaki mpe ebandaki kosepela,+Mpe basité ya Yuda oyo esimbami na yango ebandaki kozala na esengo+Mpo na bikateli na yo ya lisambisi, Ee Yehova.+   Mpo yo, Ee Yehova, ozali Oyo-Aleki-Likoló na mabele mobimba;+Omati na esika ya likoló mingi mpenza koleka banzambe mosusu.+ 10  Ee bino baoyo bolingaka Yehova,+ bóyina oyo ezali mabe.+Ye abatelaka milimo ya bato na ye ya sembo;+Abikisaka bango na lobɔkɔ ya bato mabe.+ 11  Pole ebimi mpo na moyengebene,+Mpe esengo mpo na bato oyo bazali na motema sembo.+ 12  Ee bino bayengebene, bósepela mpo na Yehova,+Mpe bópesa matɔndi na ekaniseli na ye mosantu.+

Maloba na nse