Nzembo 95:1-11

95  Ee bóya, tóganga na esengo mpo na Yehova!+Tóganga na koganga ya bolongi mpo na Libanga ya lobiko na biso.+   Tókende liboso ya elongi na ye na matɔndi;+Tóganga na koganga ya bolongi elongo na mindule mpo na ye.+   Mpo Yehova azali Nzambe monene+Mpe Mokonzi moko monene likoló ya banzambe mosusu nyonso,+   Bisika ya bozindo mpenza ya mabele ezali na lobɔkɔ na ye+Mpe bansɔngɛ ya bangomba ezali ya ye;+   Mbu, oyo ye moko asalaki, ezali ya ye+Mpe mabɔkɔ na ye moko esalaki mabele ya kokauka.+   Ee bókɔta, tósambela mpe tógumbama;+Tófukama+ liboso ya Yehova Mokeli na biso.+   Mpo ye azali Nzambe na biso, mpe biso tozali bato na ye oyo azali kobatela lokola bampate na esika ya koleisa bibwɛlɛ matiti.+Lelo oyo, soki boyoki mongongo na ye,+   Bókómisa motema na bino makasi te lokola na Meriba,+Lokola na mokolo ya Masa na esobe,+   Ntango bankɔkɔ na bino bamekaki ngai;+Bamekamekaki ngai, bamonaki mpe mosala na ngai.+ 10  Mbula ntuku minei (40) nayokaki libota yango mpii,+Bongo nalobaki ete:“Bazali bato oyo motema na bango ezali kowayawaya,+Mpe bayebi banzela na ngai te”;+ 11  Baoyo nalapelaki ndai na nkanda na ngai+ ete:“Bakokɔta na esika na ngai ya kopema te.”+

Maloba na nse