Nzembo 94:1-23

94  Ee Yehova, Nzambe oyo azongiselaka bato mabe mabe na bango,+Ee Nzambe oyo azongiselaka bato mabe mabe na bango, ngɛngá!+   Ee Mosambisi ya mabele, tɛlɛmá.+Pesá bato ya lolendo etumbu.+   Ee Yehova, tii ntango nini bato mabe,+Tii ntango nini bato mabe bakosepela mingi?+   Bazali se kosopa maloba, bazali se kolobaloba;+Baoyo nyonso basalaka makambo oyo eyokisaka mpasi bazali se komikumisa.+   Ee Yehova, bazali se konyatanyata bato na yo,+Mpe bazali se komonisa libula na yo mpasi.+   Bazali koboma mwasi oyo mobali akufá mpe moto oyo afandi mopaya,+Mpe bazali koboma bana oyo batata bakufá.+   Mpe bazali se koloba: “Yah azali komona te;+Mpe Nzambe ya Yakobo azali koyeba yango te.”+   Bókanga ntina, bino bato oyo bozangi mayele;+Mpe bino bazoba, ntango nini bokozwa mayele ya kososola?+   Moto oyo asalá litoi, akoki nde koyoka te?+To Moto oyo asalá liso, akoki nde komona te?+ 10  Moto oyo asembolaka bikólo, akoki nde kopamela te,+Ɛɛ, Moto oyo ateyaka bato boyebi?+ 11  Yehova azali koyeba ete makanisi ya bato ezali lokola mwa mopɛpɛ.+ 12  Ee Yah, esengo na mobali makasi oyo yo ozali kosembola,+Mpe oyo yo ozali koteya na mobeko na yo,+ 13  Mpo na kopesa ye kimya na mikolo ya mpasi,+Kino libulu ekotimolama mpo na moto mabe.+ 14  Mpo Yehova akosundola bato na ye te,+Akotika mpe libula na ye te.+ 15  Mpo ekateli ya lisambisi ekozonga lisusu na boyengebene mpenza,+Mpe bato nyonso ya motema sembo bakolanda yango. 16  Nani akokɔtela ngai mpo na kobunda na basali-mabe?+Nani akokɔtela ngai mpo na kobunda na baoyo basalaka makambo oyo eyokisaka mpasi?+ 17  Soki Yehova asungaka ngai te,+Nsima ya mwa ntango moke, mbɛlɛ molimo na ngai efandi na esika ya nyɛɛ.+ 18  Ntango nalobaki ete: “Lokolo na ngai ekotengatenga mpenza,”+Ee Yehova, motema boboto na yo ezalaki se kosimba ngai.+ 19  Ntango makanisi oyo etungisaka ngai ekómaki mingi na kati na ngai,+Mabɔndisi na yo ebandaki kokitisa molimo na ngai motema.+ 20  Kiti ya bokonzi oyo ezali kobimisa mikakatano ekoyokana nde na yo+Wana yango ezali kokana kobimisa mpasi na nzela ya mobeko?+ 21  Bazali kobunda makasi na molimo ya moyengebene+Mpe bazali kotánga moto oyo azali na likambo te ete azali mabe mpo básopa makila na ye.+ 22  Kasi Yehova akokóma esika na ngai ya kobombana oyo etombwaná,+Mpe Nzambe na ngai akokóma libanga ya ekimelo na ngai.+ 23  Mpe akozongisela bango makambo na bango oyo eyokisaka mpasi+Mpe akokangisa bango monɔkɔ na mpasi na bango moko.+Yehova Nzambe na biso akokangisa bango monɔkɔ.+

Maloba na nse