Nzembo 93:1-5

93  Yehova ye moko akómi mokonzi!+Alati lokumu;+Yehova alati​—amikangi bokasi na loketo.+Mabele oyo ebotaka epikami mpe makasi, ekoki kotengatenga te.+   Kiti na yo ya bokonzi epikamá makasi banda kala;+Banda ntango oyo etyami ndelo te yo ozali.+   Ee Yehova, bibale ematisi,Bibale ematisi makɛlɛlɛ na yango;+Bibale ezali se komatisa lokito na yango.+   Ezala makɛlɛlɛ ya mai minene, to mbonge makasi ya mbu,+Yehova aleki yango na lokumu monene+ na esika oyo etombwaná.   Emonani ete makundoli na yo ebongi kotyelama motema.+Ee Yehova, bosantu ebongi na ndako na yo+ libela na libela.+

Maloba na nse