Nzembo 92:1-15

Mondule, loyembo: mpo na mokolo ya sabata. 92  Ezali malamu kopesa Yehova matɔndi+Mpe kobɛtɛla nkombo na yo mondule, Ee Oyo-Aleki-Likoló;+   Mpo na koyebisa motema boboto na yo+ na ntɔngɔMpe bosembo na yo na butu,+   Na ebɛtɛlo ya nsinga zomi mpe na ebɛtɛlo ya nsinga misato,+Na miziki oyo ezali kobɛta na nzɛnzɛ.+   Mpo osepelisi ngai, Ee Yehova, mpo na mosala na yo;Mpo na misala ya mabɔkɔ na yo, nazali koganga na esengo.+   Ee Yehova, misala na yo ezali mpenza minene!+Makanisi na yo ezali mozindo mingi.+   Moto moko te oyo azangi mayele akoki koyeba yango,+Mpe zoba moko te akoki kokanga ntina na yango.+   Ntango bato mabe bazali kobima lokola matiti+Mpe bato nyonso oyo basalaka makambo oyo eyokisaka mpasi bazali kokola,Ezali mpo básila nyɛɛ libela.+   Kasi yo, Ee Yehova, ozali likoló mpo na libela.+   Mpo talá! banguna na yo, Ee Yehova,+Mpo talá! banguna na yo bakokufa;+Bato nyonso oyo basalaka makambo oyo eyokisaka mpasi bakopanzana.+ 10  Kasi okotombola liseke na ngai lokola oyo ya ngɔmbɛ ya zamba;+Nakomipakola mafuta ya sika.+ 11  Mpe liso na ngai ekotala banguna na ngai na nse;+Matoi na ngai ekoyoka nsango ya baoyo bazali kotɛmɛla ngai, basali-mabe. 12  Moyengebene akokola lokola nzete ya mbila;+Akokola lokola nzete ya sɛdrɛ na Libá.+ 13  Baoyo balonamá na ndako ya Yehova,+Na mapango ya Nzambe na biso,+ bango bakokola. 14  Bakokoba kokola na ntango ya nsuki mpɛmbɛ,+Bakozala kaka mafutamafuta mpe bakokauka te,+ 15  Mpo na kosakola ete Yehova azali sembo.+Ye azali Libanga na ngai,+ epai na ye kozanga boyengebene ezali te.+

Maloba na nse