Nzembo 91:1-16
91 Moto nyonso oyo afandi na esika ya nkuku+ ya Oyo-Aleki-Likoló+Akozwa esika ya kofanda na elili ya Mo-zwi-ya-Nguya-Nyonso.+
2 Nakoloba na Yehova: “Ozali ekimelo na ngai mpe esika makasi ya libateli na ngai,+Nzambe na ngai, oyo nakotyela motema.”+
3 Mpo ye moko akobikisa yo na motambo ya mokangi ndɛkɛ,+Na maladi mabe oyo ezali kobimisa minyoko.+
4 Na nsala ya mapapu na ye akokanga nzela ya kopusana pene na yo,+Mpe okokima na nse ya mapapu na ye.+Bosembo*+ na ye ekozala nguba+ monene mpe efelo makasi ya libateli.
5 Okobanga eloko moko te ya nsɔmɔ na butu,+To likula+ oyo ezali kopumbwa na moi,
6 To maladi mabe oyo etambolaka na molili,+To libebi oyo epunzaka na midi.+
7 Nkóto moko (1 000) bakokwea penepene na yoMpe nkóto zomi (10 000) na lobɔkɔ na yo ya mobali;Yango ekopusana pene na yo te.+
8 Okotala yango kaka na miso+Mpe okomona lifuti ya bato mabe.+
9 Mpo olobaki: “Yehova azali ekimelo na ngai,”+Okómisi Oyo-Aleki-Likoló esika na yo ya kofanda;+
10 Likama moko te ekokwela yo,+Mpe ata bolɔzi moko te ekopusana pene na hema na yo.+
11 Mpo akopesa baanzelu na ye mitindo mpo na yo,+Mpo bábatela yo na banzela na yo nyonso.+
12 Bakomema yo na mabɔkɔ na bango,+Mpo lokolo na yo etutana na libanga ata moko te.+
13 Okonyata mwana-nkɔsi mpe kobra;+Okonyatanyata mwana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki mpe nyoka monene.+
14 Lokola alingaka ngai mingi,+Ngai mpe nakobikisa ye.+Nakobatela ye mpo ayebi nkombo na ngai.+
15 Akobelela ngai, mpe nakoyanola ye.+Nakozala elongo na ye na ntango ya mpasi.+Nakobikisa ye mpe nakokumisa ye.+
16 Nakotondisa ye na mikolo mingi ya bomoi,+Mpe nakomonisa ye lobiko na ngai.+
Maloba na nse
^ To, “Bosolo.”