Nzembo 9:1-20

Epai ya mokambi ya nzembo ya Mute-labene. Mondule ya Davidi. א [ʼAlef] 9  Ee Yehova, nakokumisa yo na motema na ngai mobimba;+Nakosakola misala na yo nyonso ya kokamwa.+   Nakosepela mpe nakozala na esengo mpo na yo,+Nakobɛtɛla nkombo na yo mondule, Ee Oyo-Aleki-Likoló.+ ב [Bet]   Ntango banguna na ngai bakozonga nsima,+Bakobɛta libaku mpe bakokufa na miso na yo.+   Mpo okokisi ekateli ya lisambisi na ngai mpe likambo na ngai;+Ofandi na kiti ya bokonzi, ozali kosambisa na boyengebene.+ ג [Gimel]   Opameli bikólo,+ obomi moto mabe.+Olongoli nkombo na bango mpo na ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ mpo na seko.+   Ee yo monguna, libebi na yo ya libela eyei,+Ná bingumba oyo opikoli.+Nkombo na bango ekoyokana lisusu te.+ ה [Heʼ]   Kasi Yehova akofanda seko na seko,+Atɛlɛmisi kiti na ye ya bokonzi ngwi mpo na lisambisi.+   Mpe na boyengebene, ye moko akosambisa mabele oyo ebotaka;+Akokata likambo ya bituluku ya bato ya bikólo na bosembo.+ ו [Waw]   Mpe mpo na moto nyonso oyo atutami, Yehova akokóma esika ya kobombana oyo etombwaná,+Esika ya kobombana oyo etombwaná na ntango ya mpasi.+ 10  Mpe baoyo bayebi nkombo na yo bakotyela yo motema,+Mpo okotika ata moke te baoyo balukaka yo, Ee Yehova.+ ז [Zayin] 11  Bóbɛtɛla Yehova mondule, ye oyo azali kofanda na Siona;+Bóyebisa misala na ye na kati ya bato ya bikólo.+ 12  Mpo, ntango azali koluka makila oyo esopami,+ akokanisa mpenza bato yango;+Akobosana ata moke te kolela ya bato ya mpasi.+ ח [Het] 13  Moniselá ngai boboto, Ee Yehova; talá mpasi oyo bato oyo bayinaka ngai bazali komonisa ngai,+Ee yo oyo ozali kotombola ngai nalongwa na baporte ya liwa,+ 14  Mpo nasakola misala na yo nyonso oyo ebongi kosanzolama+Na baporte+ ya mwana mwasi ya Siona,+Mpo nazala na esengo na lobiko na yo.+ ט [Tet] 15  Bato ya bikólo bazindi na libulu oyo basali;+Lokolo na bango ekangami+ na monyama+ oyo babombaki. 16  Yehova ayebani mpo na ekateli ya lisambisi oyo azwi.+Moto mabe akangami na motambo oyo asalaki na mabɔkɔ na ye moko.+Higayone. Sela. י [Yod] 17  Bato mabe+ bakokende na Nkunda,*+Ɛɛ bato ya bikólo nyonso oyo bazali kobosana Nzambe.+ 18  Mpo bakobosana mobola libela te,+Mpe elikya ya bato ya komikitisa ekozala mpamba te.+ כ [Kaf] 19  Tɛlɛmá, Ee Yehova! Moto​—mowei mpamba—​azala te na makasi koleka.+Bikólo esambisama na miso na yo.+ 20  Tyá kobanga na kati na bango, Ee Yehova,+Mpo bato ya bikólo báyeba ete bazali kaka bato​—bawei mpamba.+ Sela.

Maloba na nse

To, “Sheole.” Talá Ap 4.