Nzembo 89:1-52
Maskile. Ya Etane Moezera.+
89 Nakoyemba makambo oyo ezali komonisa motema boboto ya Yehova mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+Na monɔkɔ na ngai, nakoyebisa bosembo na yo libota na libota.+
2 Mpo nalobi ete: “Motema boboto ekopikama makasi mpo na ntango oyo etyami ndelo te;+Opiki bosembo na yo makasi na likoló.”+
3 “Nasali kondimana ná moto oyo ngai naponá;+Nalapeli Davidi mosaleli na ngai ndai,+
4 ‘Nakopika momboto na yo makasi mpo na ntango oyo etyami ndelo te,+Mpe nakotonga kiti na yo ya bokonzi+ libota na libota.’” Sela.
5 Ee Yehova, likoló ekokumisa mosala na yo ya kokamwa,+Ɛɛ, bosembo na yo na lisangá ya basantu.
6 Mpo nani akokani na Yehova na likoló oyo etondi na mapata?+Nani na bana ya Nzambe+ akoki kokokana na Yehova?
7 Etuluku ya basantu—baninga na ye ya motema—basengeli kobanga Nzambe;+Azali monene mpe nsɔmɔ koleka baoyo nyonso bazali zingazinga na ye.+
8 Ee Yehova Nzambe ya mampinga,+Ee Yah, nani azali makasi lokola yo?+Bosembo na yo ezali zingazinga na yo.+
9 Ozali na bokonzi likoló ya yikiyiki ya mbu;+Ntango ezali kotombola mbonge na yango, yo moko ofandisaka yango nyɛɛ.+
10 Yo moko onyati Rahaba,+ lokola moto oyo abomami.+Na nguya ya lobɔkɔ na yo, opanzi banguna na yo.+
11 Likoló ezali ya yo,+ mabele mpe ezali ya yo;+Mabele oyo ebotaka mpe biloko nyonso oyo etondi wana+—yo moko osalaki yango.+
12 Nɔrdi ná sudi—yo moko ozalisaki yango;+Tabore+ ná Heremone+—ezali koganga na esengo na nkombo na yo.+
13 Lobɔkɔ oyo etondi na nguya ezali ya yo,+Lobɔkɔ na yo ezali makasi,+Lobɔkɔ na yo ya mobali etombolami.+
14 Boyengebene mpe lisambisi ezali esika oyo kiti ya bokonzi na yo efandi mpo na libela;+Motema boboto mpe bosolo ezalaka liboso ya elongi na yo.+
15 Esengo na bato oyo bazali koganga na esengo.+Ee Yehova, na pole ya elongi na yo bazali kaka kotambola.+
16 Na nkombo na yo bazali na esengo mokolo mobimba+Mpe na boyengebene na yo batombwami.+
17 Mpo yo ozali kitoko ya makasi na bango;+Mpe na bosepeli na yo, liseke na biso etombwami.+
18 Mpo Yehova apesi biso nguba na biso,+Mpe Mosantu ya Yisraele apesi biso mokonzi na biso.+
19 Na ntango yango olobelaki bato na yo ya sembo na emonaneli,+Mpe olobaki ete:“Nasungi moto ya nguya;+Natomboli moto oyo aponami na kati ya bato.+
20 Namoni Davidi mosaleli na ngai;+Natye ye mafuta na ngai mosantu,+
21 Lobɔkɔ na ngai ekosimba ye makasi,+Lobɔkɔ na ngai mpe ekolendisa ye.+
22 Monguna ata moko te akobɔtɔla ye eloko na makasi,+Mpe mwana ata moko te ya kozanga boyengebene akonyokola ye.+
23 Mpe nabukaki banguna na ye, nalongolaki bango na miso na ye,+Mpe nazalaki kaka kobɛtabɛta baoyo bazalaki koyina ye makasi.+
24 Mpe bosembo na ngai mpe motema boboto na ngai ezali elongo na ye,+Mpe na nkombo na ngai liseke na ye etombwami.+
25 Mpe natye lobɔkɔ na ye likoló ya mbu+Mpe lobɔkɔ na ye ya mobali likoló ya bibale.+
26 Ye moko azali kobelela ngai ete: ‘Ozali Tata na ngai,+Nzambe na ngai+ mpe Libanga ya lobiko na ngai.’+
27 Lisusu, ngai moko nakotya ye mwana ya liboso,+Oyo-aleki-likoló na kati ya bakonzi ya mabele.+
28 Nakobatela motema boboto na ngai epai na ye mpo na ntango oyo etyami ndelo te,+Mpe kondimana na ngai ná ye ekobeba te.+
29 Mpe nakotɛlɛmisa mpenza momboto na ye mpo na seko+Mpe kiti na ye ya bokonzi lokola mikolo ya likoló.+
30 Soki bana na ye batiki mobeko na ngai+Mpe batamboli na bikateli na ngai ya lisambisi te,+
31 Soki bamoni mibeko na ngai eloko mpambaMpe batosi mitindo na ngai te,
32 Nakosɛnga bango bázongisa monɔkɔ mpo na makambo na bango ya kobuka mibeko mpe nakopesa bango etumbu na lingenda+Mpe mpo na libunga na bango nakopesa bango etumbu na fimbo.+
33 Kasi nakolongolela ye motema boboto na ngai te,+Mpe na bosembo na ngai nakobuka lokuta te.+
34 Nakokómisa kondimana na ngai eloko mpamba te,+Mpe nakobongola liloba ya mbɛbu na ngai te.+
35 Na bosantu na ngai, nalapi ndai mpo na libela,+Nakobukela Davidi lokuta te.+
36 Momboto na ye ekozala mpo na ntango oyo etyami ndelo te,+Mpe kiti na ye ya bokonzi lokola moi liboso na ngai.+
37 Lokola sanza, yango ekopikama makasi mpo na ntango oyo etyami ndelo te,Mpe lokola motatoli ya sembo na likoló oyo etondi na mapata.” Sela.
38 Kasi yo—obwaki mpe ozali kaka komona mpamba;+Osilikeli moto na yo oyo atyami mafuta.+
39 Otyoli kondimana ya mosaleli na yo;Okómisi motole na ye eloko mpamba tii na mabele.+
40 Obuki mapango na ye nyonso ya mabanga;+Obebisi mapango na ye ya makasi.+
41 Baoyo nyonso bazali koleka na nzela bapunzi ye;+Akómi eloko ya kosambwisa na miso ya bato oyo bafandi penepene na ye.+
42 Otomboli lobɔkɔ ya mobali ya banguna na ye;+Osepelisi banguna na ye nyonso.+
43 Lisusu, ozali kotalela mopanga na ye lokola monguna,+Mpe osali ete alonga na etumba te.+
44 Osilisi kongɛnga na ye,+Mpe obwaki kiti na ye ya bokonzi na mabele.+
45 Oyeisi mikolo ya bolenge na ye mokuse;Ozipi ye na nsɔni.+ Sela.
46 Ee Yehova, kino ntango nini okomibomba? Ntango nyonso?+Nkɛlɛ na yo ekokoba kopela lokola mɔtɔ?+
47 Kanisá bolai ya bomoi na ngai.+Ozalisi bana nyonso ya bato kaka mpamba?+
48 Mobali makasi nani oyo azali na bomoi mpe akomona liwa te?+Akoki nde kobikisa molimo na ye na lobɔkɔ ya Nkunda?*+ Sela.
49 Ee Yehova, wapi misala na yo ya kala ya motema boboto,Oyo olapelaki Davidi ndai na bosembo na yo?+
50 Ee Yehova, kanisá kosambwa ya basaleli na yo,+Kosambwa ya bato nyonso ya bikólo mingi oyo nazali komema na ntolo na ngai,+
51 Ee Yehova, ndenge banguna na yo basambwisi,+Ndenge basambwisi makolo ya moto na yo oyo atyami mafuta.+
52 Yehova apambolama libela na libela. Amen mpe Amen.+
Maloba na nse
^ To, “Sheole.” Talá Ap 4.