Nzembo 88:1-18

Loyembo, mondule ya bana ya Kora. Epai ya mokambi ya nzembo ya Mahalate mpo na kopesa biyano. Maskile ya Hemane+ Moezera. 88  Ee Yehova, Nzambe ya lobiko na ngai,+Na moi nagangi,+Na butu mpe nagangi liboso na yo.+   Libondeli na ngai ekoya liboso na yo.+Sembolá litoi na yo na kosɛngasɛnga na ngai ya kolela.+   Mpo molimo na ngai emoni mpasi mingi,+Mpe bomoi na ngai ekómi penepene na Nkunda.*+   Natángami na kati ya baoyo bazali kokita na libulu;+Nakómi lokola mobali makasi oyo azangi makasi,+   Oyo azwi bonsomi na kati ya bakufi,+Lokola bato oyo babomami oyo bazali kolala na lilita,+Baoyo ozali kokanisa lisusu teMpe baoyo balongolami na lobɔkɔ na yo oyo esalisaka.+   Otye ngai na kati ya libulu na bisika ya mozindo ya nse koleka,Na kati ya bisika ya molili, na libulu monene ya mozindo.+   Nkɛlɛ na yo ekweli ngai,+Mpe oyokisi ngai mpasi na mbonge na yo nyonso ya makasi.+ Sela.   Otye bato oyo bayebani na ngai mosika na ngai;+Otye ngai lokola eloko ya koyina mpenza na miso na bango.+Nakangami na bolɔkɔ mpe nakoki kobima te.+   Liso na ngai elɛmbi mpo na mpasi na ngai.+Ee Yehova, nabeleli yo mokolo mobimba;+Natandeli yo mabɔkɔ na ngai.+ 10  Okosalela nde bato oyo bakufá likamwisi?+To baoyo bazangi makasi kati na liwa bakotɛlɛma,+Bakokumisa yo?+ Sela. 11  Motema boboto na yo ekosakolama nde na kati ya lilita,Bosembo na yo na kati ya esika ya libebi?+ 12  Likamwisi na yo ekoyebana nde na kati ya molili,+To boyengebene na yo na mokili ya bato oyo babosaná bango?+ 13  Ee Yehova, mpe ata bongo epai na yo nazali kobelela mpo na kosɛnga lisalisi,+Mpe na ntɔngɔ libondeli na ngai ezali kaka koya liboso na yo.+ 14  Ee Yehova, mpo na nini ozali kobwaka molimo na ngai?+Mpo na nini ozali kobombela ngai elongi na yo?+ 15  Banda bomwana, nazali na mpasi mpe nazali pene na kokata motema;+Nakangi motema mingi mpenza na makambo na yo ya nsɔmɔ.+ 16  Mikalikali ya nkanda na yo oyo ezali kopela eleki likoló na ngai;+Makambo na yo ya nsɔmɔ ekangisi ngai monɔkɔ.+ 17  Ezingi ngai lokola mai mokolo mobimba;+Ezingi ngai na mbala moko. 18  Otye moninga mpe moto oyo nazalaka elongo na ye mosika na ngai;+Bato oyo bayebani na ngai nde esika ya molili.+

Maloba na nse

To, “Sheole.” Talá Ap 4.