Nzembo 87:1-7
Ya bana ya Kora. Mondule, loyembo.
87 Moboko na ye ezali na bangomba mosantu.+
2 Yehova azali kolinga baporte ya Siona+ mingiKoleka batabernakle nyonso ya Yakobo.+
3 Ee engumba ya Nzambe ya solo, makambo ya nkembo ezali kolobama mpo na yo.+ Sela.
4 Nakotánga Rahaba+ ná Babilone+ na kati ya baoyo bayebi ngai;Talá Filistia+ ná Tire, elongo na Kushi:“Talá moto moko oyo abotamaki kuna.”+
5 Mpe bakoloba mpo na Siona ete:“Mokomoko na bango abotamá kuna.”+Mpe Oyo-Aleki-Likoló+ ye moko akopika yango makasi.+
6 Yehova ye moko akosakola, ntango akokoma nkombo ya bato ya bikólo+ ete:“Talá moto oyo abotamá kuna.”+ Sela.
7 Ekozala mpe na bayembi mpe na babini ya mabina ya kozunguluka:+“Maziba na ngai nyonso ezali epai na yo.”+

