Nzembo 86:1-17

Libondeli ya Davidi. 86  Ee Yehova, sembolá litoi na yo. Yanolá ngai,+Mpo nazali moto ya mpasi mpe mobola.+   Ee kɛngɛlá molimo na ngai, mpo nazali sembo.+Bikisá mosaleli na yo oyo azali kotyela yo motema+​—yo ozali Nzambe na ngai.   Ee Yehova, moniselá ngai boboto,+Mpo nazali kobelela yo mokolo mobimba.+   Sepelisá molimo ya mosaleli na yo,+Mpo nazali kotombolela yo molimo na ngai, Ee Yehova.+   Mpo yo, Ee Yehova, ozali malamu+ mpe osepelaka kolimbisa;+Mpe motema boboto oyo ozali komonisela baoyo nyonso bazali kobelela yo ezali mingi.+   Ee Yehova, tyá litoi na libondeli na ngai;+Mpe tyá likebi na mongongo ya malɔmbɔ na ngai.+   Na mokolo ya mpasi na ngai nakobenga yo,+Mpo okoyanola ngai.+   Ee Yehova, moko te azali lokola yo na kati ya banzambe,+Mpe mosala moko te ezali lokola misala na yo.+   Bikólo nyonso oyo osali ekoya,+Mpe ekogumbamela yo, Ee Yehova,+Mpe ekopesa nkombo na yo nkembo.+ 10  Mpo yo ozali monene mpe ozali kosala makambo ya kokamwa;+Yo ozali Nzambe, kaka yo moko.+ 11  Ee Yehova, lakisá ngai nzela na yo.+Nakotambola na solo na yo.+Pesá ngai motema moko mpo nabanga nkombo na yo.+ 12  Ee Yehova Nzambe na ngai, nazali kokumisa yo na motema na ngai mobimba,+Mpe nakopesa nkombo na yo nkembo mpo na ntango oyo etyami ndelo te, 13  Mpo motema boboto oyo ozali komonisela ngai ezali monene,+Mpe obikisi molimo na ngai na Nkunda,* na esika na yango ya nse koleka.+ 14  Ee Nzambe, bato ya lofundo batɛlɛmɛli ngai;+Mpe liyangani ya banyokoli eluki molimo na ngai,+Mpe batye yo liboso na bango te.+ 15  Kasi yo, Ee Yehova, ozali Nzambe ya motema mawa mpe ya ngɔlu,+Oyokaka nkanda noki te+ mpe otondi na motema boboto mpe na solo.+ 16  Baluká epai na ngai mpe moniselá ngai boboto.+Pesá mosaleli na yo makasi na yo,+Mpe bikisá mwana ya moombo na yo ya mwasi.+ 17  Salelá ngai elembo moko oyo ekolakisa bolamu na yo,Mpo baoyo bazali koyina ngai bámona yango mpe báyoka nsɔni.+Mpo yo moko, Ee Yehova, osalisi ngai mpe obɔndisi ngai.+

Maloba na nse

To, “Sheole.” Talá Ap 4.