Nzembo 85:1-13

Mpo na mokambi ya nzembo. Ya bana ya Kora. Mondule. 85  Ee Yehova, yo osepeli na mokili na yo;+Ozongisi bakangami ya Yakobo.+   Olimbisi libunga ya bato na yo;+Ozipi lisumu na bango nyonso.+ Sela.   Opekisi nkɛlɛ na yo nyonso;+Otiki nkanda na yo makasi.+   Ee Nzambe ya lobiko na biso, zongisá biso,+Mpe longolelá biso nkanda na yo.+   Okosilikela biso mpo na ntango oyo etyami ndelo te?+Okoumisa nkanda na yo libota na libota?+   Yo moko okopesa biso bomoi lisusu,+Mpo bato na yo básepela na yo, boye te?+   Ee Yehova, monisá biso motema boboto na yo,+Mpe pesá biso lobiko na yo.+   Nakoyoka oyo Yehova Nzambe ya solo akoloba,+Mpo akolobela kimya epai ya bato na ye+ mpe epai ya bato na ye ya sembo,Kasi bázongela te komityela motema.+   Ya solo, lobiko na ye ezali pene na baoyo babangaka ye,+Mpo nkembo efanda na mokili na biso.+ 10  Motema boboto mpe bosolo ekutani;+Boyengebene mpe kimya epesani mapwɛpwɛ.+ 11  Bosolo ekobima na mabele,+Mpe uta na likoló, boyengebene ekotala na nse.+ 12  Lisusu, Yehova akopesa oyo ezali malamu,+Mpe mokili na biso ekopesa mbuma na yango.+ 13  Boyengebene ekotambola liboso na ye,+Mpe ekosala nzela na makolo na ye.+

Maloba na nse