Nzembo 84:1-12
Mpo na mokambi ya nzembo na Gitite.+ Ya bana ya Kora. Mondule.
84 Tabernakle na yo monene+ ezali kitoko mpenza,Ee Yehova ya mampinga!+
2 Molimo na ngai ezali na mposa ya mapango ya Yehova mpe lisusu eyoki mposa na yango makasi.+Motema na ngai mpe mosuni na ngai ezali koganga na esengo mpo na Nzambe ya bomoi.+
3 Ata ndɛkɛ ezwi ndako,Mpe nyampeke zumbu na yango,Epai etye bana na yango—Etumbelo na yo monene, Ee Yehova ya mampinga, Mokonzi na ngai mpe Nzambe na ngai!
4 Esengo na baoyo bazali kofanda na ndako na yo!+Bazali kokoba kosanzola yo.+ Sela.
5 Esengo na bato oyo makasi na bango ezali kouta na yo,+Baoyo babalabala minene ezali na motema na bango.+
6 Wana bazali koleka na lobwaku ya patatalu ya mwa banzete ya baka,+Bazali kokómisa yango liziba;Ɛɛ, molakisi+ azali komizinga mapamboli.
7 Bakotambola na nguya ya bomoi+ oyo ezali kobakisama se kobakisama;Mokomoko azali kobima liboso ya Nzambe na Siona.+
8 Ee Yehova Nzambe ya mampinga, yoká libondeli na ngai;+Ee Nzambe ya Yakobo, tyá litoi.+ Sela.
9 Ee nguba na biso, moná, Ee Nzambe,+Mpe talá elongi ya moto na yo oyo atyami mafuta.+
10 Mpo mokolo moko na mapango na yo eleki mikolo nkóto epai mosusu.+Naponi kotɛlɛma na monɔkɔ ya ndako ya Nzambe na ngai+Na esika nafanda na bahema ya bato mabe.+
11 Mpo Yehova Nzambe azali moi+ mpe nguba;+Apesaka boboto mpe nkembo.+Yehova ye moko akoboya te kopesa eloko moko ya malamu na baoyo bazali kotambola na bosembo.+
12 Ee Yehova ya mampinga, esengo na moto oyo azali kotyela yo motema.+