Nzembo 82:1-8

Mondule ya Asafe. 82  Nzambe atɛlɛmi na kati ya liyangani+ ya Nzambe;+Azali kosambisa na katikati ya banzambe:+   “Kino ntango nini bokokoba kosambisa na bosembo te+Mpe kopona bilongi ya bato mabe?+ Sela.   Bósambisa na bosembo moto oyo azangá mpe mwana mobali oyo tata akufá.+Bókata na bosembo likambo ya moto ya mpasi mpe ya moto oyo akelelá.+   Bóbikisa moto oyo azangá mpe mobola;+Bóbikisa bango na lobɔkɔ ya bato mabe.”+   Bayebi te, mpe bakangi ntina te;+Bazali kaka kotambolatambola na molili;+Miboko nyonso ya mabele ezali kotengatenga.+   “Ngai moko nalobi ete: ‘Bino bozali banzambe,+Mpe bino nyonso bozali bana ya Oyo-Aleki-Likoló.+   Ya solo bokokufa kaka ndenge bato bakufaka;+Mpe bokokwea lokola bankumu nyonso!’”+   Ee Nzambe, tɛlɛmá, sambisá mabele;+Mpo yo moko osengeli kozwa bikólo nyonso.+

Maloba na nse