Nzembo 81:1-16
Epai ya mokambi ya nzembo na Gitite.+ Ya Asafe.
81 Ee bóganga na esengo mpo na Nzambe, makasi na biso;+Bóganga na koganga ya bolongi mpo na Nzambe ya Yakobo.+
2 Bóbɛta mondule+ mpe bózwa mbonda moke,+Nzɛnzɛ ya kosepelisa ná ebɛtɛlo ya nsinga.+
3 Na sanza ya sika, bóyula liseke;+Na ntango sanza ezali mobimba, mpo na mokolo ya fɛti na biso.+
4 Mpo ezali lilako mpo na Yisraele,+Ekateli ya lisambisi ya Nzambe ya Yakobo.
5 Atyaki yango likoló ya Yozefe lokola eloko ya kokanisa,+Ntango azalaki kotambola na mokili ya Ezipito.+Nayokaki monɔkɔ oyo nayebi te.+
6 “Nalongolaki kilo na lipeka na ye;+Kitunga elongolamaki na mabɔkɔ na ye.+
7 Na ntango ya mpasi obengaki, mpe nabikisaki yo;+Nayanolaki yo na esika ya kobombana ya nkake.+Natalatalaki yo na mai ya Meriba.+ Sela.
8 Ee ekólo na ngai, yoká mpe nakotatwela yo,+Ee Yisraele, soki okoyoka ngai.+
9 Epai na yo nzambe mopaya akozala te;+Mpe okogumbamela nzambe mopaya te.+
10 Ngai, Yehova, nazali Nzambe na yo,+Ye oyo azali kobimisa yo na mokili ya Ezipito.+Fungolá monɔkɔ na yo polele, mpe nakotondisa yango.+
11 Kasi bato na ngai bayoki mongongo na ngai te;+Mpe Yisraele esepeli na ngai ata moke te.+
12 Bongo natikaki bango bátambola na motó makasi na bango;+Bazalaki kotambola na batoli na bango moko.+
13 Ee soki bato na ngai báyokelaka ngai,+Ee soki Yisraele etambolaka na banzela na ngai mpenza!+
14 Mbɛlɛ natyaki banguna na bango na nse na bango kozanga nkaka,+Mpe mbɛlɛ nabalolelaki banguna na bango lobɔkɔ na ngai.+
15 Baoyo bayinaka Yehova makasi, bakoya kogumbamela ye na kobanga,+Mpe ntango na bango ekozala mpo na ntango oyo etyami ndelo te.
16 Mpe akokoba koleisa ye mafuta ya blé,+Mpe nakotondisa yo na mafuta ya nzoi oyo euti na libanga.”+