Nzembo 80:1-19

Epai ya mokambi ya nzembo mpo na Bafololo lísi.+ Bokundoli. Ya Asafe.+ Mondule. 80  Ee Mobateli ya Yisraele, tyá litoi,+Yo oyo ozali kotambwisa Yozefe lokola etonga.+Ee yo oyo ofandi likoló ya bakeruba,+ ngɛngá.+   Monisá nguya na yo liboso ya Efraime ná Benyamina ná Manase,+Mpe yaká kobikisa biso.+   Ee Nzambe, zongisá biso;+Mpe ngɛngisá elongi na yo, mpo tóbika.+   Ee Yehova Nzambe ya mampinga, kino ntango nini nkanda na yo ekopelela libondeli ya bato na yo?+   Yo oleisi bango limpa ya mpisoli,+Mpe ozali kaka komɛlisa bango mpisoli mingi mpenza.+   Okómisi biso eloko oyo bato oyo bafandi penepene na biso bazali kobundela,+Mpe banguna na biso bazali kaka kosɛka biso ndenge balingi.+   Ee Nzambe ya mampinga, zongisá biso;+Mpe ngɛngisá elongi na yo, mpo tóbika.+   Olongolaki nzete ya vinyo na Ezipito.+Obenganaki bikólo, mpo olona yango.+   Opɛtolaki liboso na yango,+ mpo ezwa misisa mpe etondisa mokili.+ 10  Bangomba ezipamaki na elili na yango,Mpe banzete ya sɛdrɛ ya Nzambe na bitape na yango.+ 11  Nsukansuka etindaki bitape na yango tii na mbu,+Mpe bitape na yango ya mikemike tii na Ebale.+ 12  Mpo na nini okweisi bifelo na yango ya mabanga,+Mpe mpo na nini baoyo nyonso bazali koleka na balabala babuki mbuma na yango?+ 13  Nsombo na zamba ezali kokoba kolya yango,+Mpe ebele ya banyama ya esobe ezali kokoba kolya yango.+ 14  Ee Nzambe ya mampinga, zongá, nabondeli yo;+Uta na likoló talá mpe moná mpe batelá nzete oyo ya vinyo,+ 15  Mobimbi ya nzete oyo lobɔkɔ na yo ya mobali eloni,+Mpe talá mwana oyo okómisi makasi mpo na yo moko.+ 16  Eziki na mɔtɔ, ekatami.+Bazali kobeba na mpamela ya elongi na yo.+ 17  Lobɔkɔ na yo ezala likoló ya moto oyo azali na lobɔkɔ na yo ya mobali,+Likoló ya mwana ya bato oyo okómisi makasi mpo na yo moko,+ 18  Mpe tokopesa yo mokɔngɔ te.+Batelá biso na bomoi, mpo tóbelela nkombo na yo.+ 19  Ee Yehova Nzambe ya mampinga, zongisá biso;+Ngɛngisá elongi na yo, mpo tóbika.+

Maloba na nse