Nzembo 8:1-9
Epai ya mokambi ya nzembo ya Gitite.+ Mondule ya Davidi.
8 Ee Yehova Nkolo na biso, nkombo na yo ezali mpenza monene na mabele mobimba,+Yo oyo lokumu ezali kolobelama kuna na likoló!+
2 Na monɔkɔ ya bana mpe ya bana oyo bazali komɛla mabɛlɛ omonisi makasi na yo,+Mpo na baoyo bazali banguna na yo,+Mpo na kosala ete monguna ná moto oyo azongisaka mabe bátika likambo oyo bazali kosala.+
3 Ntango nazali komona likoló oyo osalá, misala ya misapi na yo,+Sanza ná minzoto oyo obongisá,+
4 Moto—mowei mpamba+—azali nani mpo okanisa ye,+Mpe mwana ya moto ya mabele mpo obatela ye?+
5 Mpe osalaki ye mwa moke na nse ya baanzelu,*+Mpe olatisaki ye motole+ ya nkembo+ mpe ya lokumu.
6 Ozali kosala ete ye ayangela misala ya mabɔkɔ na yo;+Otye eloko nyonso na nse ya makolo na ye:+
7 Bampate, bantaba, ná bangɔmbɛ, yango nyonso,+Ná banyama ya esobe,+
8 Bandɛkɛ ya likoló ná mbisi ya mbu,+Eloko nyonso oyo elekaka na kati ya mbu.+
9 Ee Yehova Nkolo na biso, nkombo na yo ezali mpenza monene na mabele mobimba!+
Maloba na nse
^ To, “Baoyo bazali lokola Nzambe.”