Nzembo 78:1-72

Maskile. Ya Asafe.+ 78  Ee bato na ngai, bótya litoi na mobeko na ngai;+Bósembola litoi na maloba ya monɔkɔ na ngai.+   Nakofungola monɔkɔ na ngai na liloba ya lisese;+Nakosopa basambole ya kala,+   Oyo toyoki mpe toyebi,+Mpe oyo batata na biso bayebisi biso;+   Oyo tokobombela bana na bango te,+Tokoyebisa yango libota oyo ekoya,+Masanzoli ya Yehova mpe makasi na ye+Mpe misala na ye ya kokamwa oyo asali.+   Mpe abandaki kotɛlɛmisa eloko ya kokanisa na Yakobo,+Mpe atyaki mobeko na Yisraele,+Mitindo oyo apesaki bankɔkɔ na biso,+Mpo na koyebisa yango bana na bango;+   Mpo libota oyo ekoya, bana oyo bakobotama, báyeba yango,+Mpo bátɛlɛma mpe báyebisa yango na bana na bango,+   Mpe mpo bátyela Nzambe ye moko motema+Mpe bábosana te misala ya Nzambe,+ kasi bátosa mitindo na ye.+   Mpe basengeli te kokóma lokola bankɔkɔ na bango,+Libota ya motó makasi mpe ya botomboki,+Libota ya bato oyo babongisaki motema na bango te+Mpe oyo Nzambe atyelaki elimo na bango motema te.+   Bana ya Efraime, bato ya litimbo,+ atako bazalaki na bibundeli,Bazongaki nsima na mokolo ya etumba.+ 10  Babatelaki kondimana ya Nzambe te,+Mpe baboyaki kotambola na mobeko na ye.+ 11  Babandaki mpe kobosana misala na ye+Mpe misala na ye ya kokamwa oyo amonisaki bango.+ 12  Asalaki makambo ya kokamwa na miso ya bankɔkɔ na bango+Na mokili ya Ezipito,+ na esobe ya Zoane.+ 13  Apasolaki mbu, mpo atika bango bákatisa,+Mpe atɛlɛmisaki mai lokola nduka.+ 14  Mpe akobaki kokamba bango na lipata na moi+Mpe na butu mobimba na pole ya mɔtɔ.+ 15  Apasolaki mabanga na esobe,+Mpo amɛlisa bango mai mingi lokola mai mozindo.+ 16  Mpe azalaki kobimisa mikɛli na libanga+Mpe kokitisa mai lokola bibale.+ 17  Mpe bakobaki kosalela ye lisumu koleka lisusu+Na ndenge batombokelaki Oyo-Aleki-Likoló na etúká oyo ezangá mai;+ 18  Mpe bamekaki Nzambe na motema na bango+Na ndenge basɛngaki eloko ya kolya mpo na molimo na bango.+ 19  Bongo babandaki koloba mabe mpo na Nzambe.+Balobaki ete: “Nzambe akoki kopesa biso bilei na esobe?”+ 20  Talá! Ye abɛtaki libanga+Mpo mai etíyola mpe mikɛli esopana.+“Akoki nde kopesa limpa,+To akoki kobongisela bato na ye bilei?”+ 21  Yango wana Yehova ayokaki mpe abandaki kosilika makasi;+Mpe mɔtɔ epelelaki Yakobo,+Mpe nkanda emataki lisusu mpo na Yisraele.+ 22  Mpo bandimelaki Nzambe te,+Mpe batyelaki lobiko na ye motema te.+ 23  Mpe apesaki mitindo na likoló oyo etondi na mapata, kuna na likoló,Mpe afungolaki baporte ya likoló.+ 24  Mpe akobaki konɔkisela bango mana mpo bálya,+Mpe apesaki bango mbuma ya likoló.+ 25  Bato balyaki mampa ya bato ya nguya;+Atindelaki bango bilei mpe batondaki.+ 26  Abandaki kobimisa mopɛpɛ ya ɛsti na likoló+Mpe kopɛpisa mopɛpɛ ya sudi na makasi na ye.+ 27  Mpe anɔkiselaki bango bilei lokola putulu,+Ɛɛ bikelamu oyo epumbwaka oyo ezali na mapapu, lokola bambuma ya zɛlo ya mbu.+ 28  Mpe akobaki kokweisa yango na katikati ya kaa na ye,+Zingazinga ya batabernakle na ye.+ 29  Mpe balyaki mpe batondaki mingi mpenza,+Mpe amemelaki bango eloko oyo bazalaki na mposa na yango.+ 30  Bazalaki kaka na mposa ya kolya lisusu,Ata ntango bilei na bango ezalaki naino na monɔkɔ na bango,+ 31  Bongo nkɛlɛ ya Nzambe emataki mpo na bango.+Mpe abandaki koboma na kati na bato na bango ya makasi;+Mpe akweisaki bilenge mibali ya Yisraele. 32  Ata nyonso wana, basumukaki lisusu koleka+Mpe bandimaki te misala na ye ya kokamwa.+ 33  Bongo asukisaki mikolo na bango lokola mopɛpɛ mpamba,+Mpe bambula na bango na mitungisi. 34  Mbala nyonso oyo azalaki koboma bango, bazalaki lisusu koluka ye,+Mpe bazalaki kozonga mpe bazalaki koluka Nzambe.+ 35  Mpe babandaki komikundola ete Nzambe azali Libanga na bango,+Mpe ete Nzambe Oyo-Aleki-Likoló azali Moto oyo azongisaka mabe mpo na bango.+ 36  Mpe balukaki kozimbisa ye na monɔkɔ na bango;+Mpe na lolemo na bango balukaki kokosa ye.+ 37  Mpe motema na bango ekangamaki na ye te;+Mpe bazalaki sembo te na kondimana na ye.+ 38  Kasi azalaki na motema mawa;+ azalaki kozipa libunga+ mpe azalaki koyeisa libebi te.+Mpe mbala mingi, azalaki kozongisa nkanda na ye nsima,+Mpe azalaki kolinga te kolamwisa nkɛlɛ na ye nyonso. 39  Mpe amikundolaki ete bazali kaka bato ya mosuni,+Ete elimo ebimaka mpe ezongaka te.+ 40  Mbala boni batombokelaki ye na esobe,+Bayokisaki ye motema mpasi na mokili oyo ekauká!+ 41  Mpe mbala na mbala bamekaki Nzambe,+Mpe bayokisaki Mosantu ya Yisraele motema mpasi.+ 42  Bakanisaki lobɔkɔ na ye te,+Mokolo oyo asikolaki bango na lobɔkɔ ya monguna,+ 43  Ndenge atyaki bilembo na ye na Ezipito+Mpe makamwisi na ye na esobe ya Zoane;+ 44  Mpe ndenge akómisaki banzela na bango ya mai ya Nile makila,+Bongo bakokaki te komɛla mai ya mikɛli na bango.+ 45  Atindelaki bango mapokopoko, mpo elya bango;+Mpe mbemba, mpo ebebisa bango.+ 46  Mpe akabelaki bampɛsɛ mbuma na bango,Mpe mayoyo, mosala na bango ya makasi.+ 47  Na mbula ya mabanga,+ abomaki nzete na bango ya vinyoMpe na mbula ya mabanga, banzete na bango ya sikomore.+ 48  Mpe akabelaki mbula ya mabanga banyama na bango oyo ememaka mikumba+Mpe fiɛvrɛ makasi, bibwɛlɛ na bango. 49  Atindelaki bango nkanda na ye ya kongala,+Nkɛlɛ ná makaneli ná mpasi,+Bituluku ya baanzelu oyo bazalaki komema likama.+ 50  Abongiselaki nkanda na ye nzela.+Apekisaki te ete molimo na bango ekende na liwa;Mpe akabaki bomoi na bango na maladi mabe.+ 51  Nsukansuka abomaki bana nyonso ya liboso na Ezipito,+Ebandeli ya nguya na bango ya kobota na kati ya bahema ya Kame.+ 52  Na nsima, abimisaki bato na ye lokola etonga,+Mpe atambwisaki bango lokola etonga na esobe.+ 53  Mpe akambaki mpe abatelaki bango, mpe bayokaki nsɔmɔ ata moke te;+Mpe mbu ezipaki banguna na bango.+ 54  Mpe amemaki bango na teritware na ye mosantu,+Etúká oyo ya ngombangomba oyo lobɔkɔ na ye ya mobali ezwaki.+ 55  Mpe nsukansuka, abenganaki bikólo mpo na bango,+Mpe na nsinga ya komeka, apesaki bango libula,+Bongo afandisaki mabota ya Yisraele na bandako na bango.+ 56  Mpe bamekaki Nzambe Oyo-Aleki-Likoló mpe batombokelaki ye,+Mpe babatelaki makundoli na ye te.+ 57  Bango mpe bazalaki kaka kozonga nsima mpe kosala na bokosi lokola bankɔkɔ na bango;+Babalukaki lokola litimbo oyo nsinga na yango ebendami malamu te.+ 58  Mpe bazalaki kaka kosilikisa ye na bisika na bango oyo etombwaná,+Mpe bazalaki kaka koyokisa ye zuwa na bikeko na bango oyo eyemami.+ 59  Nzambe ayokaki+ mpe asilikaki makasi,+Bongo amonaki Yisraele eloko mpamba mpenza.+ 60  Mpe nsukansuka asundolaki tabernakle ya Shilo,+Hema oyo na kati na yango afandaki elongo na bato ya mabele.+ 61  Mpe makasi na ye ekendaki na bokangami+Mpe kitoko na ye na lobɔkɔ ya monguna.+ 62  Mpe akabaki bato na ye na mopanga,+Mpe asilikelaki libula na ye makasi.+ 63  Mɔtɔ elyaki bilenge na ye ya mibali,Mpe bangɔndɔ na ye basanzolamaki te.+ 64  Kasi banganga-nzambe na ye, bakweaki na mopanga,+Mpe basi na bango oyo mibali bakufá balelaki te.+ 65  Bongo Yehova abandaki kolamuka lokola nde alalaki mpɔngi,+Lokola moto ya nguya oyo auti na molangwa ya vinyo.+ 66  Mpe azalaki kobɛta banguna na ye na nsima;+Apesaki bango nsɔni oyo ekoumela mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+ 67  Mpe aboyaki hema ya Yozefe;+Mpe aponaki libota ya Efraime te.+ 68  Kasi aponaki libota ya Yuda,+Ngomba Siona, oyo alingaki.+ 69  Mpe atongaki esika na ye mosantu lokola bisika oyo etombwaná,+Lokola mabele oyo atye moboko mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+ 70  Bongo aponaki Davidi mosaleli na ye+Mpe azwaki ye na mapango ya etonga ya bampate.+ 71  Wana azalaki nsima ya bampate oyo ezali komɛlisa+Amemaki ye mpo azala mobateli ya Yakobo, bato na ye+Mpe ya Yisraele libula na ye.+ 72  Mpe abatelaki bango na kolanda ezaleli ya kozanga mbeba ya motema na ye,+Mpe na mayele ya mabɔkɔ na ye akambaki bango.+

Maloba na nse