Nzembo 75:1-10
Epai ya mokambi ya nzembo. “Kobebisa te.” Mondule. Ya Asafe.+ Loyembo.
75 Ee Nzambe, tozali kopesa yo matɔndi, tozali kopesa yo matɔndi,+Mpe nkombo na yo ezali pene.+Bato basengeli kosakola misala na yo ya kokamwa.+
2 “Mpo naponaki ntango oyo etyami;+Ngai nabandaki kosambisa na bosembo.+
3 Mabele mpe bato oyo bafandi wana bazalaki konyangwa,+Ngai nde nasembolaki makonzí na yango.”+ Sela.
4 Nalobaki na bazoba ete: “Bózala bazoba te,”+Mpe na bato mabe ete: “Bótombola liseke te.+
5 Bótombola liseke na bino na likoló te.Bóloba na lofundo te.+
6 Mpo ezali te na ɛsti to na wɛsti,To na sudi nde kotombolama eutaka.
7 Mpo Nzambe azali mosambisi.+Akitisaka moto oyo, mpe atombolaka moto oyo.+
8 Mpo kɔpɔ ezali na lobɔkɔ ya Yehova,+Mpe vinyo ezali kobimisa fulufulu, etondi na biloko oyo esangisami.Mpe akosopa mpenza mbɔtɔ na yango;Bato mabe nyonso ya mabele bakosilisa yango, bakomɛla yango.”+
9 Kasi ngai nakoyebisa yango mpo na ntango oyo etyami ndelo te;Nakobɛtɛla Nzambe ya Yakobo mondule.+
10 “Mpe nakokata maseke nyonso ya bato mabe.”+Maseke ya bayengebene ekotombolama.+