Nzembo 74:1-23

Maskile. Ya Asafe.+ 74  Ee Nzambe, mpo na nini obwaki mpo na seko?+Mpo na nini nkanda na yo ezali kaka kopelela etonga ya esika na yo ya koleisa bibwɛlɛ matiti?+   Kanisá liyangani na yo oyo ozwaki banda kala,+Libota oyo osikolaki mpo ezala libula na yo,+Ngomba Siona epai ofandaki.+   Kende na bisika ya libebi oyo ezali koumela ntango molai.+Monguna abebisi eloko nyonso na esika mosantu.+   Baoyo bazali banguna na yo bagangi na katikati ya esika na yo ya kokutana.+Batɛlɛmisi bilembo+ na bango moko.   Ayebani ete azali lokola moto oyo atombolaka basóka mpo na kokata mwa banzete ya zamba.   Mpe sikoyo, na basóka ya mike mpe na mabaya oyo batyá bibende na nsɔngɛ, bazali kutu kobuka mayemi nyonso ya esika mosantu.+   Babwaki esika na yo mosantu na mɔtɔ.+Bakómisi tabernakle ya nkombo na yo eloko mpamba tii na mabele.+   Bango, ɛɛ bana na bango, balobi bango nyonso na motema na bango ete:“Na mokili, bakotumba bisika nyonso ya kokutana ya Nzambe.”+   Tomoni bilembo na biso te; mosakoli ata moko azali lisusu te,+Mpe moto ata moko te kati na biso ayebi soki ezali ntango boni. 10  Ee Nzambe, kino ntango nini monguna akokoba kosambwisa?+Monguna akozanga limemya na nkombo na yo mpo na seko?+ 11  Mpo na nini ozali kaka kolongola lobɔkɔ na yo, ɛɛ lobɔkɔ na yo ya mobali+Na katikati ya ntolo na yo mpo na kosukisa biso? 12  Mpe ata bongo, Nzambe azali Mokonzi na ngai banda kalakala,+Ye oyo apesaka lobiko monene na katikati ya mabele.+ 13  Yo moko oningisaki mbu na makasi na yo;+Obukaki mitó ya banyama ya nsɔmɔ ya mbu na kati ya mai.+ 14  Yo moko ozalaki kobukabuka mitó ya Leviatana.+Opesaki yango ezala bilei ya bato, ya baoyo bafandaka na bitúká oyo ezangá mai.+ 15  Yo nde okabolaki liziba mpe mokɛli;+Yo moko nde okaukisaki bibale oyo mai etíyolaka ntango nyonso.+ 16  Moi ezali ya yo; mpe, butu ezali ya yo.+Yo moko obongisaki engɛngiseli, ɛɛ moi.+ 17  Yo nde otyaki bandelo nyonso ya mabele;+Eleko ya molunge ná eleko ya mpiɔ​—yo moko osalaki yango.+ 18  Ee Yehova, kanisá likambo oyo: Monguna asambwisi,+Mpe bato ya bozoba bazangi limemya na nkombo na yo.+ 19  Kopesa nyama ya zamba molimo ya epopo+ na yo te.Kobosana bomoi ya bato na yo ya mpasi mpo na seko te.+ 20  Talá kondimana,+Mpo bisika ya molili ya mabele ekomi bisika oyo mobulu etondi.+ 21  Ee moto oyo atutami, asambwa te.+Moto ya mpasi mpe mobola básanzola nkombo na yo.+ 22  Ee Nzambe, tɛlɛmá, talelá likambo na yo ya kosamba.+Kanisá kosambwisa oyo moto ya bozoba azali kosambwisa yo mokolo mobimba.+ 23  Kobosana te mongongo ya baoyo bazali banguna na yo.+Makɛlɛlɛ ya baoyo bazali kotɛlɛmɛla yo ezali komata ntango nyonso.+

Maloba na nse