Nzembo 73:1-28

Mondule ya Asafe.+ 73  Nzambe azali mpenza malamu epai ya Yisraele, epai ya baoyo bazali na motema pɛto.+   Kasi makolo na ngai ezalaki pene na kolongwa na nzela,+Matambe na ngai etikalaki moke esɛlimwa.+   Mpo nakómaki kolula bato oyo bamikumisaka,+Ntango namonaki kimya ya bato mabe.+   Mpo bazali na bampasi ya liwa te;+Mpe libumu na bango ezali mafutamafuta.+   Bazali kutu te kozwa mpasi ya moto​—mowei mpamba,+Mpe bazali konyokwama te lokola bato mosusu.+   Yango wana, bazwaka lolendo lokola nsinga ya monzɛlɛ na nkingo;+Mobulu ezingaka bango lokola elamba.+   Liso na bango ezali kovimba na mafuta;+Bakei mosika koleka makanisi ya motema.+   Bazali kosɛka bato mpe bazali koloba makambo oyo ezali mabe;+Bazali koloba makambo ya kobuba na ndenge moko ya komitombola.+   Batye monɔkɔ na bango na likoló mpenza,+Mpe lolemo na bango ezali kotambola na mabele.+ 10  Yango wana, azali kozongisa bato na ye na ngámbo oyo,Mpe mai ya eloko oyo etondi mɛkɛ esopami mpo na bango. 11  Mpe balobi ete: “Ndenge nini Nzambe ayebi?+Mpe boyebi ezali nde epai ya Oyo-Aleki-Likoló?”+ 12  Talá! Bato mabe oyo bazali na kimya mpo na ntango oyo etyami ndelo te, bazalaka bongo.+Bazali konduka biloko na bango ya kobikela.+ 13  Ya solo mpenza, napɛtoli motema na ngai kaka mpamba+Mpe nasukoli mabɔkɔ na ngai kaka mpamba mpo na komonisa ete nazali na ngambo te.+ 14  Mpe nakómaki konyokwama mokolo mobimba,+Mpe ntɔngɔ nyonso nazali kosembolama.+ 15  Soki nalobaki ete: “Nakobɛta lisolo lokola oyo wana,”Talá! mpo na libota ya bana na yoMbɛlɛ nasali na bokosi.+ 16  Mpe nazalaki kaka kokanisa mpo na koyeba yango;+Ezalaki mpasi na miso na ngai, 17  Kino ntango nakɔtaki na esika mosantu monene ya Nzambe.+Nalingaki kososola bomoi na bango na mikolo oyo ezali koya.+ 18  Ya solo mpenza, otye bango nde na mabele ya mosɛlu.+Okweisi bango na libebi.+ 19  Ee talá ndenge bakómi eloko ya kokamwa na ntango moke kaka!+Talá ndenge basuki, basilisami na makambo ya nsɔmɔ ya pwasa! 20  Ee Yehova, lokola ndɔtɔ nsima ya kolamuka,+Ntango yo moko okolamuka, okotyola elilingi na bango ndenge wana.+ 21  Mpo motema na ngai ekómaki ngayi+Mpe nazalaki koyoka mpasi makasi na kati ya bangɛi na ngai,+ 22  Mpe nazangaki mayele mpe nayebaki te;+Nakómaki na miso na yo lokola banyama mpamba.+ 23  Kasi ntango nyonso nazali elongo na yo;+Osimbi lobɔkɔ na ngai ya mobali.+ 24  Okokamba ngai na toli na yo,+Mpe na nsima okomema ngai tii na nkembo.+ 25  Ngai nazali na nani na likoló?+Mpe longola yo, nazali na esengo mosusu te na mabele.+ 26  Nzoto na ngai mpe motema na ngai elɛmbi.+Nzambe azali libanga ya motema na ngai mpe likabo na ngai mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+ 27  Mpo talá! bato oyo bazali mosika na yo bakokufa.+Okokanga mpenza monɔkɔ ya moto nyonso oyo azali kotika yo mpo asali pite.+ 28  Mpo na ngai, kobɛlɛma na Nzambe ezali malamu.+Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso azali esika na ngai ya kokima,+Mpo nasakola misala na yo nyonso.+

Maloba na nse