Nzembo 72:1-20
Mpo na Salomo.
72 Ee Nzambe, pesá mokonzi bikateli na yo ya lisambisi,+Mpe mwana ya mokonzi boyengebene na yo.+
2 Asamba likambo ya bato na yo na boyengebene+Mpe ya bato na yo ya mpasi na ekateli ya lisambisi.+
3 Bangomba ememela bato kimya,+Ná bangomba mike, na nzela ya boyengebene.
4 Asambisa bato ya mpasi ya ekólo,+Abikisa bana ya mobola,Mpe anyata moto oyo abubaka.
5 Bakobanga yo ntango nyonso oyo moi ekozala,+Mpe liboso ya sanza libota na libota.+
6 Akokita lokola mbula likoló ya matiti oyo bakati,+Lokola mbula monene oyo ezali kopɔlisa mabele.+
7 Na mikolo na ye, moyengebene akokola lokola matiti ya sika,+Mpe kimya ekokóma mingi kino sanza ekozala lisusu te.+
8 Mpe akozala na bato oyo ye akoyangela banda na mbu kino na mbu+Mpe banda na Ebale+ kino na nsuka ya mabele.+
9 Bato oyo bafandi na bitúká oyo ezangá mai bakogumbama liboso na ye,+Mpe banguna na ye bakolɛmbɔla putulu.+
10 Bakonzi ya Tarasisi mpe ya bisanga+—Bakofuta mpako.+Bakonzi ya Sheba mpe ya Seba—Bakopesa likabo.+
11 Mpe bakonzi nyonso bakofukamela ye bilongi na nse;+Bikólo nyonso ekosalela ye.+
12 Mpo akobikisa mobola oyo azali kolela mpo na kosɛnga lisalisi,+Mpe moto ya mpasi mpe moto nyonso oyo azali na mosungi te.+
13 Akoyokela moto oyo azangá ná mobola mawa,+Mpe akobikisa milimo ya babola.+
14 Akosikola molimo na bango na monyoko mpe na mobulu,Mpe makila na bango ekozala na motuya na miso na ye.+
15 Mpe azala na bomoi,+ mpe bápesa ye mwa ndambo ya wolo ya Sheba.+Mpe bábondela mpo na ye ntango nyonso;Apambolama mokolo mobimba.+
16 Mbuma ekozala beboo na mabele;+Na nsɔngɛ ya bangomba biloko ekotondana.+Mbuma na ye ekozala lokola na Libá,+Mpe bato ya engumba bakokóma ebele lokola milona ya mabele.+
17 Nkombo na ye ezala mpo na ntango oyo etyami ndelo te;+Liboso ya moi, nkombo na ye epalangana,Mpe na nzela na ye, bango bámizwela lipamboli;+Bikólo nyonso etánga ye moto ya esengo.+
18 Yehova Nzambe, Nzambe ya Yisraele, apambolama,+Ye moko nde azali kosala misala ya kokamwa.+
19 Mpe nkombo na ye ya nkembo epambolama seko na seko,+Mpe nkembo na ye etondisa mabele mobimba.+Amen mpe Amen.
20 Mabondeli ya Davidi, mwana ya Yese,+ esuki awa.