Nzembo 71:1-24

71  Ee Yehova, nakimi epai na yo.+Ee nayoka nsɔni ata moke te.+   Na boyengebene na yo, sikolá ngai mpe bikisá ngai.+Sembolelá ngai litoi na yo mpe bikisá ngai.+   Zalá ndako na ngai ya makasi ya libanga, epai nakokɔta ntango nyonso.+Osengeli kopesa mitindo mpo na kobikisa ngai,+Mpo yo ozali libanga na ngai mpe esika makasi na ngai ya libateli.+   Ee Nzambe na ngai, bikisá ngai na lobɔkɔ ya moto mabe,+Na lobɔkɔ ya moto oyo asalaka na bosembo te mpe oyo anyokolaka.+   Mpo yo ozali elikya na ngai,+ Ee Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, moto oyo natyelaka motema banda bolenge na ngai.+   Nabandá kotalela yo longwa na libumu;+Yo nde Moto okaboli ngai na libumu ya mama na ngai.+Ntango nyonso lisanzoli na ngai ezali mpo na yo.+   Nakómi kaka lokola likamwisi na miso ya bato mingi;+Kasi yo ozali ekimelo na ngai ya makasi.+   Monɔkɔ na ngai etondi na lisanzoli na yo,+Mokolo mobimba, na kitoko na yo.+   Kobwaka ngai te na ntango ya bobange;+Ntango nguya na ngai ezali kolɛmba, kotika ngai te.+ 10  Mpo banguna na ngai balobi na ntina na ngai,+Mpe bato oyo bazali kaka kosɛnzɛla mpo na kokanga molimo na ngai, bango nyonso bapesani toli,+ 11  Balobi: “Nzambe ye moko atiki ye.+Bólanda ye mpe bókanga ye, mpo mobikisi azali te.”+ 12  Ee Nzambe, kozala mosika na ngai te.+Ee Nzambe na ngai, salá noki osunga ngai.+ 13  Báyoka nsɔni, baoyo bazali kotɛmɛla molimo na ngai básuka.+Baoyo bazali kolukela ngai likama bámizipa na nsɔni mpe na kosambwa.+ 14  Kasi ngai nakozela ntango nyonso,+Mpe nakobakisa na lisanzoli na yo mobimba. 15  Monɔkɔ na ngai ekoyebisa boyengebene na yo,+Mokolo mobimba, lobiko na yo,+Mpo nayebi mitángo na yango te.+ 16  Nakokɔta na nguya monene,+ Ee Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso;+Nakotánga boyengebene na yo, kaka ya yo moko.+ 17  Ee Nzambe, oteyi ngai banda na bolenge na ngai,+Mpe kino sikoyo nazali kaka koyebisa misala na yo ya kokamwa.+ 18  Mpe ata kino na bobange mpe na nsuki mpɛmbɛ, Ee Nzambe, kotika ngai te,+Kino nakoyebisa lobɔkɔ na yo na libota,+Nguya na yo, na baoyo nyonso bazali koya.+ 19  Ee Nzambe, boyengebene na yo ekei tii na bisika etombwaná;+Mpo na makambo minene oyo osali,+Ee Nzambe, nani azali lokola yo?+ 20  Lokola osali ete namona bampasi mpe makama mingi,+Ozongisa ngai na bomoi;+Mpe bimisá ngai lisusu na mai mozindo ya mabele.+ 21  Kómisá lokumu na ngai monene,+Mpe zingá ngai mpe bɔndisá ngai.+ 22  Ngai mpe, nakokumisa yo na ebɛtɛlo ya nsinga,+Ee Nzambe na ngai, mpo na bosolo na yo.+Ee Mosantu ya Yisraele,+ nakobɛtɛla yo mondule na nzɛnzɛ. 23  Mbɛbu na ngai ekoganga na esengo ntango nakoyoka mposa ya kobɛtɛla yo mondule,+Ɛɛ molimo na ngai oyo yo osikoli.+ 24  Lisusu, mokolo mobimba, lolemo na ngai mpenza ekolobela boyengebene na yo na mongongo ya nse,+Mpo baoyo bazali kolukela ngai likama bayoki nsɔni, babulungani.+

Maloba na nse