Nzembo 70:1-5

Epai ya mokambi ya nzembo. Ya Davidi, mpo na kokanisa.+ 70  Ee Nzambe, mpo na kobikisa ngai,+Ee Yehova, salá noki osunga ngai.+   Baoyo bazali koluka molimo na ngai báyoka nsɔni mpe bábulungana.+Baoyo bazali kosepela na likama na ngai bázonga nsima mpe básambwa.+   Baoyo bazali koloba ete: “Aha, aha!” bázonga nsima mpo na nsɔni na bango.+   Baoyo nyonso bazali koluka yo básepela mpe bázala na esengo mpo na yo,+Mpe baoyo bazali kolinga lobiko na yo báloba ntango nyonso ete: “Nzambe akumisama!”+   Kasi ngai nazali moto ya mpasi mpe mobola.+Ee Nzambe, salá noki mpo na ngai.+Yo ozali mosalisi na ngai mpe Mobikisi na ngai.+Ee Yehova, koumela mingi te.+

Maloba na nse