Nzembo 7:1-17
Loyembo ya mawa oyo Davidi ayembelaki Yehova mpo na maloba ya Kushi Mobenyamina.
7 Ee Yehova Nzambe na ngai,+ nakimi epai na yo.+Bikisá ngai na baoyo nyonso banyokolaka ngai mpe sikolá ngai,+
2 Mpo moto apasola molimo na ngai te ndenge nkɔsi epasolaka,+Abɔtɔla ngai ntango mosikoli azali te.+
3 Ee Yehova Nzambe na ngai, soki nasali likambo oyo,+Soki kozanga bosembo ezali na mabɔkɔ na ngai,+
4 Soki nazongisi mabe na moto oyo azali kopesa ngai mbano,+To soki napunzi moto nyonso oyo azali monguna na ngai kozanga ete alonga,+
5 Tiká monguna alanda molimo na ngai+Mpe tiká ye azwa mpe anyata bomoi na ngai na mabele mpenzaMpe afandisa nkembo na ngai na putulu. Sela.
6 Tɛlɛmá, Ee Yehova, na nkanda na yo;+Tɛmɛlá kotomboka ya nkanda makasi ya baoyo bazali banguna na ngai,+Mpe lamuká mpo na ngai,+ mpo opesi mitindo mpo na lisambisi.+
7 Mpe tiká liyangani ya bituluku ya bato ya bikólo ezingela yo,Mpe zongá na likoló mpo na kotɛmɛla yango.
8 Yehova ye moko akokatela bato ya bikólo etumbu.+Sambisá ngai, Ee Yehova, na kolanda boyengebene na ngai+Mpe na kolanda ezaleli na ngai ya kozanga mbeba+ na kati na ngai.
9 Nabondeli yo, tiká mabe ya bato mabe esuka,+Mpe tiká yo opika moyengebene;+Mpe lokola Nzambe azali moyengebene,+ amekaka motema+ ná bangɛi.+
10 Nguba na ngai ezali epai ya Nzambe,+ Mobikisi ya baoyo bazali na motema sembo.+
11 Nzambe azali Mosambisi oyo azali moyengebene,+Mpe Nzambe azali kobimisa makaneli mikolo nyonso.
12 Soki moto abongwani te,+ akopelisa mopanga na Ye,+Akogumba mpenza litimbo na Ye, mpe akobongisa yango mpo na kobwaka makula.+
13 Mpe akomibongisela mpenza bibundeli oyo ebomaka;+Akokómisa makula na ye makula oyo ezali kopela.+
14 Talá! Ezali na moto oyo azwi zemi ya makambo oyo eyokisaka mpasi,+Mpe akumbi zemi ya mpasi mpe akozanga te kobota lokuta.+
15 Asali libulu, mpe atimoli yango;+Kasi akokwea na libulu yango oyo asalaki.+
16 Mpasi na ye ekozongela motó na ye moko,+Mpe mobulu na ye moko ekokitela motó na ye.+
17 Nakokumisa Yehova mpo na boyengebene na ye,+Mpe nakobɛta mondule mpo na nkombo+ ya Yehova, Oyo-Aleki-Likoló.+