Nzembo 68:1-35

Epai ya mokambi ya nzembo. Ya Davidi. Mondule, loyembo. 68  Tiká Nzambe atɛlɛma,+ banguna na ye bápalangana,+Mpe baoyo bayinaka ye makasi bákima ye.+   Obengana bango ndenge mopɛpɛ ebenganaka molinga;+Ndenge mafuta enyangwaka na mɔtɔ,+Bato mabe bábeba liboso ya Nzambe.+   Kasi bayengebene, básepela,+Bázala na esengo makasi liboso ya Nzambe,+Mpe básepela makasi na esengo.+   Bóyembela Nzambe, bóbɛta mondule mpo na nkombo na ye;+Bómatisa loyembo epai na Ye oyo azali koleka na mikili ya patatalu oyo ekauká+Ye nde Yah, wana nkombo na ye;+ mpe bósepela liboso na ye;   Tata ya bana mibali oyo batata bakufá mpe mosambisi ya basi oyo mibali bakufá+Nzambe afandi na esika na ye mosantu.+   Nzambe azali kofandisa na ndako bato oyo bazali kaka bango moko;+Azali kobimisa bato ya bolɔkɔ kino na esika ya bomɛngo mingi.+Nzokande, bato ya motó makasi basengeli kofanda na mokili oyo ekauká.+   Ee Nzambe, ntango obimaki liboso ya bato na yo,+Ntango ozalaki kotambola na mokili oyo ekauká+Sela   Mabele elɛngaki,+Likoló mpe etangisaki matangá ya mai mpo na Nzambe;+Sinai oyo elɛngaki mpo na Nzambe,+ Nzambe ya Yisraele.+   Ee Nzambe, obandaki konɔkisa mbula ya makasi;+Ɛɛ ntango libula na yo elɛmbaki​—yo moko opesaki yango makasi.+ 10  Bafandaki na kati ya kaa+ na yo ya bahema;+Ee Nzambe, na bolamu na yo obandaki kobongisela yango moto ya mpasi.+ 11  Yehova ye moko azali kobimisa liloba;+Basi oyo bazali koyebisa nsango malamu bazali limpinga moko monene.+ 12  Ɛɛ, bakonzi ya mampinga bazali kokima, bazali kokima.+Nde mwasi oyo atikali na ndako, azali kozwa ya ye ndambo ya eloko oyo epunzami.+ 13  Atako bozalaki kaka kolala na kati na mabondo ya putulu ya mɔtɔ,Bokobima lokola ebenga oyo ezali na mapapu oyo ezipami na palataMpe nsala na yango ezali ya wolo+ ya langi ya mai ya mpɔndu ya mwa-mosaka. 14  Ntango Mozwi-ya-Nguya-Nyonso apalanganisaki bakonzi oyo bazalaki na kati na yango,+Nɛjɛ ebandaki kokita na Zalamone.+ 15  Etúká ya ngombangomba ya Bashane+ ezali ngomba ya Nzambe;+Etúká ya ngombangomba ya Bashane ezali ngomba ya bansɔngɛ.+ 16  Ee bino bangomba ya bansɔngɛ, mpo na nini bino bozali kaka kotala na elulelaNgomba oyo Nzambe ye moko asepeli kofanda kuna?+Ɛɛ, Yehova ye moko akofanda kuna mpo na seko.+ 17  Makalo ya bitumba ya Nzambe ezali bankóto zomi zomi, bankóto na bankóto koleka.+Yehova ye moko auti na Sinai, ayei kokɔta na esika mosantu.+ 18  Omati na likoló;+Omemi bakangami;+Ozwi makabo​—makabo yango nde bato,+Ɛɛ, ata bato ya motó makasi,+ mpo na kofanda na kati na bango,+ Ee Yah Nzambe. 19  Yehova apambolama, ye oyo mokolo na mokolo amemaka mokumba na biso,+Nzambe ya solo ya lobiko na biso.+ Sela. 20  Mpo na biso, Nzambe ya solo azali Nzambe ya misala ya kobikisa;+Mpe banzela ya kolongwa na liwa+ ezali ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.+ 21  Ya solo, Nzambe ye moko akobukabuka motó ya banguna na ye,+Moto nyonso oyo azali kotambolatambola na ngambo na ye,+ oyo motó na ye ezali nsukinsuki. 22  Yehova alobi ete: “Nakozongisa bango longwa na Bashane,+Nakozongisa bango longwa na bozindo ya mbu,+ 23  Mpo osukola lokolo na yo na makila,+Mpo lolemo ya bambwa na yo elɛmbɔla ndambo ya makila ya banguna.”+ 24  Ee Nzambe, bamoni milɔngɔ ya bato na yo oyo bazali kotambola,+Milɔngɔ ya bato ya Nzambe na ngai, Mokonzi na ngai, oyo bazali kotambola mpo na kokɔta na esika mosantu.+ 25  Bayembi bazalaki liboso, babɛti ya bibɛtɛlo ya bansinga bazalaki nsima na bango;+Bilenge basi oyo bazali kobɛta bambonda ya mike+ bazalaki na katikati na bango. 26  Na kati ya ebele ya bato oyo bayangani, bópambola Nzambe,+Yehova, Ee bino bato ya Liziba ya Yisraele.+ 27  Kuna Benyamina moke azali kotya bango na nse na ye,+Bankumu ya Yuda elongo na ebele ya bato oyo bazali koganga,Bankumu ya Zebulone, bankumu ya Nafatali.+ 28  Nzambe na yo apesi etinda mpo na makasi na yo.+Ee Nzambe, monisá makasi, yo oyo osaleli biso mosala.+ 29  Mpo na tempelo na yo na Yerusaleme,+Bakonzi bakoyela yo makabo.+ 30  Pamelá nyama ya zamba oyo efandaka na matiti ya ebale,+ liyangani ya bangɔmbɛ-mibali,+Elongo na bana-ngɔmbɛ ya bato ya bikólo, mokomoko ezali konyata biteni ya palata.+Apalanganisi bato ya bikólo oyo basepelaka na bitumba.+ 31  Biloko ya bronze ekouta na Ezipito;+Kushi ekosembola nokinoki mabɔkɔ na yango oyo ezali na makabo ya kopesa Nzambe.+ 32  Ee bino makonzi ya mabele, bóyembela Nzambe,+Bóbɛtɛla Yehova mondule—Sela 33  Mpo na Ye oyo azali kotambola mosika kuna na likoló banda kalakala.+Talá! Azali koyokisa mongongo na ye, mongongo moko makasi.+ 34  Bóndima bokasi ya Nzambe.+Bokonzi na ye ezali likoló ya Yisraele mpe bokasi na ye ezali na kati ya mapata.+ 35  Nzambe apesaka nsɔmɔ ntango azali kobima na esika na ye mosantu ya monene.+Ye nde Nzambe ya Yisraele, oyo apesaka makasi, ɛɛ nguya epai ya bato.+Nzambe apambolama.+

Maloba na nse