Nzembo 67:1-7

Epai ya mokambi ya nzembo na bibɛtɛlo ya bansinga. Mondule, loyembo. 67  Nzambe ye moko akomonisela biso boboto mpe akopambola biso;+Akongɛngisela biso elongi na ye+Sela   Mpo nzela na yo eyebana na mabele,+Lobiko na yo na kati ya bikólo nyonso.+   Ee Nzambe, bato ya bikólo bákumisa yo;+Bato ya bikólo, bango nyonso, bákumisa yo.+   Bituluku ya bato ya bikólo básepela mpe báganga na esengo,+Mpo okosambisa bato ya bikólo na bosembo;+Mpe bituluku ya bato ya bikólo, okokamba bango na mabele. Sela.   Ee Nzambe, bato ya bikólo bákumisa yo;+Bato ya bikólo, bango nyonso, bákumisa yo.+   Mabele ekobota mpenza mbuma na yango;+Nzambe, Nzambe na biso, akopambola biso.+   Nzambe akopambola biso,+Mpe nsuka ya mabele ekobanga ye.+

Maloba na nse