Nzembo 66:1-20

Epai ya mokambi ya nzembo. Loyembo, mondule. 66  Bóganga na koganga ya bolongi epai ya Nzambe, bino nyonso bato ya mabele.+   Bóbɛta mondule mpo na nkembo ya nkombo na ye.+Bópesa lisanzoli na ye nkembo.+   Bóloba na Nzambe ete: “Misala na yo ezali mpenza nsɔmɔ!+Lokola ozali na makasi mingi, banguna na yo bakoya kogumbamela yo na kobanga.+   Bato nyonso ya mabele bakogumbamela yo,+Mpe bakobɛtɛla yo mondule, bakobɛtɛla nkombo na yo mondule.”+ Sela.   Bóya mpe bótala misala ya Nzambe.+Ndenge asalelaka bana ya bato ezali nsɔmɔ.+   Abongoli mbu mabele oyo ekauki;+Bakatisaki ebale na makolo.+Kuna tobandaki kosepela na ye.+   Azali koyangela na nguya na ye libela na libela.+Miso na ye ezali kotala bikólo.+Baoyo bazali motó makasi, bámikumisa te.+ Sela.   Ee bino bato ya bikólo,+ bópambola Nzambe na biso,Mpe bóyokisa mongongo ya lisanzoli na ye.+   Azali kobatela molimo na biso na bomoi,+Mpe apesi nzela te ete lokolo na biso etengatenga.+ 10  Ee Nzambe, mpo otalitali biso;+Opɛtoli biso lokola na ntango bapɛtolaka palata.+ 11  Okɔtisi biso na monyama ya bokila;+Otye kilo na loketo na biso. 12  Otambwisi moto​—mowei mpamba​—na motó na biso;+Toleki na kati ya mɔtɔ mpe na kati ya mai,+Mpe obimisi biso kino na esika ya kokitisa motema.+ 13  Nakokɔta na ndako na yo na makabo ya kotumba mobimba;+Nakokokisa bilako na ngai epai na yo+ 14  Oyo nafungolaki mbɛbu na ngai mpo na koloba+Mpe oyo monɔkɔ na ngai elobi ntango makambo eyelaki ngai ndongo.+ 15  Nakopesa yo makabo ya kotumba mobimba ya bana ya banyama ya mafutamafuta,+Ná milinga ya mbeka ya bampate-mibali.Nakopesa ngɔmbɛ-mobali ná bantaba-mibali.+ Sela. 16  Bino nyonso baoyo bobangaka Nzambe, bóya, bóyoka, mpe nakoyebisa+Oyo ye asaleli molimo na ngai.+ 17  Nabengaki ye na monɔkɔ na ngai,+Mpe kokumisa ezalaki na lolemo na ngai.+ 18  Soki na motema na ngai natalelaki eloko oyo eyokisaka mpasi,Yehova akoyoka ngai te.+ 19  Ya solo Nzambe ayoki;+Atye likebi na mongongo ya libondeli na ngai.+ 20  Nzambe apambolama, ye oyo atye libondeli na ngai pembeni te,Mpe alongoli motema boboto na ye epai na ngai te.+

Maloba na nse