Nzembo 65:1-13
Epai ya mokambi ya nzembo. Mondule ya Davidi. Loyembo.
65 Ee Nzambe, mpo na yo lisanzoli mpe kimya ezali na Siona;+Mpe elako ekokokisama epai na yo.+
2 Ee Moyoki ya libondeli, ɛɛ bato ya lolenge nyonso bakoya epai na yo.+
3 Makambo ya libunga eleki ngai na makasi.+Misala na biso ya kobuka mibeko, yo moko okozipa yango.+
4 Esengo na moto oyo ozali kopona mpe ozali kobɛlɛmisa,+Mpo afanda na mapango na yo.+Tokotonda mpenza na bolamu ya ndako na yo,+Esika mosantu ya tempelo na yo.+
5 Okoyanola biso na makambo ya nsɔmɔ na boyengebene,+Ee Nzambe ya lobiko na biso,+Ye oyo bandelo nyonso ya mabele mpe baoyo bazali mosika kuna na mbu batyelaka motema.+
6 Ye azali kopika bangomba ngwi na nguya na ye;+Ye akangi mpenza nguya na loketo na ye.+
7 Ye azali kokitisa makɛlɛlɛ ya mbu,+Makɛlɛlɛ ya mbonge na yango mpe yikiyiki ya bituluku ya bato ya bikólo.+
8 Mpe bato oyo bafandi na bisika oyo eleki mosika mpenza bakobanga mpo na bilembo na yo;+Ozali kosala ete koganga ya esengo ezala na ntɔngɔ mpe na mpokwa.+
9 Otyeli mabele likebi na yo, mpo opesa yango biloko ebele;+Ozali kokómisa yango na bozwi mingi mpenza.Yo Nzambe ozali kotondisa mikɛli na mai.+Ozali kobongisa mbuma na yango,+Mpo ezali ndenge wana nde ozali kobongisa mabele.+
10 Banzela ya mikala na yango ezali kopɔlisama na mai, mabele na yango oyo ekangamakangamá ezali kolalisama;+Ozali kolɛmbisa yango na mbula monene; ozali kopambola milona na yango ya sika.+
11 Olatisi mobu motole ya bolamu na yo,+Mpe banzela na yo ezali kotangisa mafuta.+
12 Bisika ya koleisa banyama matiti na esobe ezali kotangisa mai,+Mpe bangomba mike ezali komikanga esengo na loketo.+
13 Bisika ya koleisa banyama matiti etondi na bitonga,+Mpe mabwaku ya patatalu ezingami na mbuma.+Yango ezali koganga na koganga ya bolongi, ɛɛ, ezali koyemba.+