Nzembo 64:1-10

Epai ya mokambi ya nzembo. Mondule ya Davidi. 64  Ee Nzambe, yoká mongongo na ngai na motungisi na ngai.+Obatela bomoi na ngai ezala na nsɔmɔ ya monguna te.+  2  Obomba ngai mosika na lisolo ya nkuku ya ba-sali-mabe,+Mosika na yikiyiki ya bato oyo basalaka makambo oyo eyokisaka mpasi,+  3  Baoyo bapelisi lolemo na bango lokola mopanga,+Baoyo balɛngɛli likula na bango, maloba ya bololo,+  4  Mpo longwa na bisika ya kobombana bábwakela yango moto oyo azangi mbeba.+Bazali kobwakela ye yango na pwasa mpe bazali kobanga te.+  5  Bazali kokangama makasi na maloba ya mabe;+Bazali koloba ndenge bakobomba mitambo.+Balobi ete: “Nani azali komona yango?”+  6  Bazali kaka kolukaluka makambo oyo ezangi boyengebene;+Babombi mwango moko ya mayele, oyo baluki malamumalamu,+Mpe na kati ya mokomoko, ɛɛ motema na ye, ezali mozindo.+  7  Kasi Nzambe akobwakela bango likula na pwasa.+Bazoki bampota.+  8  Mpe bazali kobɛtisa moto libaku.+Kasi lolemo na bango ezali kotɛmɛla bango moko.+Baoyo nyonso bazali kotala bango bakoningisa motó,+  9  Mpe bato nyonso ya mabele bakobanga;+Mpe bakoyebisa mosala ya Nzambe,+Mpe bakozwa mpenza mayele ya kososola mosala na ye.+ 10  Mpe moyengebene akosepela na Yehova mpe akokima mpenza epai na ye;+Mpe bato nyonso ya motema sembo bakomikumisa.+

Maloba na nse