Nzembo 62:1-12
Epai ya mokambi ya nzembo ya Yedutune. Mondule ya Davidi.
62 Ɛɛ, nataleli Nzambe mpe molimo na ngai ezali kozela na kimya.+Lobiko na ngai ezali kouta na ye.+
2 Ɛɛ, ye azali libanga na ngai mpe lobiko na ngai, esika na ngai ya kobombana oyo etombwaná;+Nakotengatenga mingi te.+
3 Kino ntango nini bokokwela moto oyo bolingi koboma?+Bino nyonso bozali lokola efelo oyo etɛngami, efelo ya mabanga oyo bazali kotindika.+
4 Ɛɛ, bazali kopesa toli mpo na kobenda moto alongwa na lokumu na ye;+Bazali kosepela na lokuta.+Na monɔkɔ na bango bazali kopambola, kasi na motema na bango bazali kolakela mabe.+ Sela.
5 Ɛɛ, talelá Nzambe mpe zelá na kimya, Ee molimo na ngai,+Mpo elikya na ngai ezali kouta na ye.+
6 Ɛɛ, ye azali libanga na ngai mpe lobiko na ngai, esika na ngai ya kobombana oyo etombwaná;+Nakotengatenga te.+
7 Lobiko na ngai mpe nkembo na ngai ezali epai ya Nzambe.+Libanga na ngai ya makasi, esika na ngai ya kokima ezali epai ya Nzambe.+
8 Ee bino bato, bótyela ye motema ntango nyonso.+Bósopa motema na bino liboso na ye.+Nzambe azali ekimelo na biso.+ Sela.
9 Ɛɛ, bana ya moto ya mabele bazali kaka mwa mopɛpɛ,+Bana ya bato bazali kaka lokuta.+Soki batyami na emekeli ya kilo bango nyonso bazali mpenza pɛpɛlɛ koleka mopɛpɛ.+
10 Bótyela kobuba motema te,+Mpe bókóma bato mpamba te na moyibi.+Soki biloko ya kobikela ekómi ebele, bótyela yango motema te.+
11 Mbala moko Nzambe alobi, mbala mibale nayoki likambo oyo:+Makasi ezali ya Nzambe.+
12 Lisusu motema boboto ezali ya yo, Ee Yehova,+Mpo yo moko ozongiselaka moto na moto na kolanda mosala na ye.+