Nzembo 61:1-8
Epai ya mokambi ya nzembo na bibɛtɛlo ya bansinga. Ya Davidi.
61 Ee Nzambe, yoká kosɛngasɛnga na ngai ya kolela.+Tyelá libondeli na ngai likebi.+
2 Nakobelela uta na nsuka ya mabele, ɛɛ epai na yo, ntango motema na ngai ekolɛmba.+Okamba ngai tii na libanga oyo ezali molai koleka ngai.+
3 Mpo ozali ekimelo na ngai,+Ndako molai ya makasi liboso ya monguna.+
4 Nakoyambama na hema na yo mpo na ntango oyo etyami ndelo te;+Nakokima mpe nakomibomba na nse ya mapapu na yo.+ Sela.
5 Mpo yo moko, Ee Nzambe, oyoki bilako na ngai.+Opesi ngai libula ya baoyo babangaka nkombo na yo.+
6 Okobakisa mikolo na mikolo ya mokonzi;+Bambula na ye ekozala mingi lokola mabota oyo ekoya na nsima.+
7 Akofanda mpo na ntango oyo etyami ndelo te liboso ya Nzambe;+Ee pesá motema boboto mpe bosolo, mpo yango ebatela ye.+
8 Boye nakobɛtɛla nkombo na yo mondule mpo na seko,+Mpo nakokisa bilako na ngai mokolo na mokolo.+