Nzembo 60:1-12

Epai ya mokambi ya nzembo mpo na Fololo lísi ya Bokundoli. Mikitame. Ya Davidi. Mpo na koteya.+ Ntango abundaki na Arame-naharaime ná Arame-Zoba, mpe Yoabe azongaki mpe abɛtaki Edome na Lobwaku ya Mungwa, ɛɛ bato nkóto zomi na mibale (12  000).+ 60  Ee Nzambe, obwaki biso, opanzi biso,+Osiliki. Osengeli kozongisa biso.+   Oningisi mabele, opasoli yango.+Bikisá madusu na yango, mpo esili kotengatenga.+   Omonisi bato na yo mpasi.+Omɛlisi biso vinyo oyo ezali kopesa biso kizunguzungu.+   Opesi baoyo bazali kobanga yo elembo+Mpo bákima litimbo nyokanyoka. Sela.   Mpo bato oyo olingaka bábikisama,+Ee bikisá na lobɔkɔ na yo ya mobali mpe yanolá biso.+   Nzambe ye moko alobi na kati ya bosantu na ye+ ete:“Nakosepela makasi, nakopesa Shekeme ezala likabo;+Mpe nakomeka bonene ya lobwaku ya patatalu ya Sukote.+   Gileade ezali ya ngai mpe Manase ezali ya ngai,+Mpe Efraime ezali ndako ya makasi ya nkumu na ngai;Yuda ezali lingenda na ngai ya komanda.+   Moabe ezali nzungu na ngai ya kosukola.+Nakobwakela Edome sandale na ngai.+Nakoganga ete nalongi Filistia.”+   Nani akomema ngai na engumba oyo ezingami?+Nani akokamba ngai mpenza kino na Edome?+ 10  Ee Nzambe, yo moto obwaki biso+Mpe yo Nzambe na biso ozali kobima te elongo na mampinga na biso, boye te?+ 11  Sungá biso tólongwa na mpasi,+Mpo lobiko oyo euti na moto ya mabele ezali mpamba.+ 12  Tokozwa nguya ya bomoi oyo euti na Nzambe,+Mpe ye moko akonyata banguna na biso.+

Maloba na nse