Nzembo 59:1-17
Epai ya mokambi ya nzembo. “Kobebisa te.” Ya Davidi. Mikitame. Ntango Saulo atindaki bato báboma ye, mpe bazalaki kokɛngɛla ndako.+
59 Ee Nzambe na ngai, bikisá ngai na mabɔkɔ ya banguna na ngai;+Batelá ngai na mabɔkɔ ya baoyo bazali kotɛmɛla ngai.+
2 Bikisá ngai na mabɔkɔ ya baoyo basalaka makambo oyo eyokisaka mpasi,+Mpe bikisá ngai na mabɔkɔ ya bato oyo bazali na ngambo ya makila.
3 Mpo talá! babatami mpo na kozela molimo na ngai;+Bato ya makasi bazali kobunda na ngai,+Ee Yehova, nazali na botomboki te, nazali mpe na lisumu te.+
4 Atako libunga ezali te, bazali kopota mbangu mpe bazali komibongisa.+Lamuká ntango nazali kobenga mpe talá.+
5 Mpe yo, Ee Yehova Nzambe ya mampinga, ozali Nzambe ya Yisraele.+Lamuká mpo otyela bikólo nyonso likebi na yo.+Baoyo nyonso batɛkaka baninga na bango mpe bayokisaka bango mpasi, komonisela bango boboto te.+ Sela.
6 Bazali kaka kozonga na ntango ya mpokwa;+Bazali kaka koganga lokola mbwa+ mpe bazali kobaluka zingazinga ya engumba.+
7 Talá! Bazali kobimisa maloba na monɔkɔ na bango;+Mipanga ezali na mbɛbu na bango,+Mpo nani azali koyoka?+
8 Kasi yo moko, Ee Yehova, okosɛka bango;+Okotyola bikólo nyonso.+
9 Ee Bokasi na ngai, nakotala se epai na yo;+Mpo Nzambe azali esika na ngai ya kobombana oyo etombwaná.+
10 Nzambe oyo amoniselaka ngai motema boboto akokutana na ngai;+Nzambe ye moko akotalisa ngai banguna na ngai.+
11 Koboma bango te, mpo bato na ngai bábosana te.+Na nguya na yo ya bomoi salá ete báyengayenga,+Mpe kitisá bango, Ee nguba na biso Yehova,+
12 Mpo na lisumu ya monɔkɔ na bango, liloba ya mbɛbu na bango;+Mpe tiká bákangama na lolendo na bango,+Ɛɛ mpo na elakeli mabe mpe bokosi oyo bazali kozongela mbala na mbala.
13 Sukisá bango na nkanda;+Sukisá bango, mpo bázala te;Mpe báyeba ete Nzambe azali koyangela na Yakobo kino nsuka ya mabele.+ Sela.
14 Mpe bázonga na ngonga ya mpokwa;Báganga lokola mbwa mpe bábaluka zingazinga na engumba.+
15 Bato yango báyengayenga mpo na koluka eloko ya kolya;+Bátonda te mpe na butu bálala te.+
16 Kasi ngai nakoyembela makasi na yo,+Mpe na ntɔngɔ nakoyebisa makambo etali motema boboto na yo na esengo.+Mpo omonisi ete ozali esika na ngai ya kobombana oyo etombwaná+Mpe esika oyo nakoki kokima na mokolo ya mpasi na ngai.+
17 Ee Bokasi na ngai, nakobɛtɛla yo mondule,+Mpo Nzambe azali esika na ngai ya kobombana oyo etombwaná, Nzambe ya motema boboto epai na ngai.+