Nzembo 58:1-11
Epai ya mokambi ya nzembo. “Kobebisa te.” Ya Davidi. Mikitame.
58 Awa bofandi nyɛɛ bokoki mpenza kolobela boyengebene?+Ee bino bana ya bato, bokoki nde kosambisa na bosembo?+
2 Kutu, na motema na bino bozali nde kosala makambo ya kozanga boyengebene na mabele,+Mpe bozali kobongisa nzela mpo na mobulu mpenza ya mabɔkɔ na bino!+
3 Bato mabe bapɛngwi banda na libumu;+Bayengiyengi banda na libumu;Bazali koloba makambo ya lokuta.+
4 Ngɛngɛ na bango ezali lokola ngɛngɛ ya nyoka,+Bakufá matoi lokola kobra oyo ekangaka litoi na yango,+
5 Oyo ekoyokela mongongo ya balengoli+ te,Atako moto ya mayele azali kosalela yango nkisi.+
6 Ee Nzambe, buká mino na bango na monɔkɔ na bango.+Ee Yehova, buká mikuwa ya mbanga ya bana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki.
7 Bányangwa, bákóma lokola mai oyo ezali kotíyola;+Agumba litimbo mpo na makula na ye wana bazali kokwea.+
8 Azali kotambola lokola mbɛmbɛ oyo ezali kokufa;*Bakomona mpenza moi te lokola zemi ya mwasi oyo esopani.+
9 Liboso ete banzungu na bino eyoka nsolo ya mɔtɔ ya mwa nzete ya nzubɛnzubɛ oyo epelisami,+Akomema mwa nzete yango ya mobesu mpe oyo ezali kopela ndenge mopɛpɛ makasi ememaka.+
10 Moyengebene akosepela mpo amoni ndenge bazongiseli bato mabe mabe na bango.+Akosukola makolo na ye na makila ya moto mabe.+
11 Mpe bato bakoloba ete:+ “Ya solo mpenza mbuma ezali mpo na moyengebene.+Ya solo mpenza ezali na Nzambe oyo azali kosambisa na mabele.”+
Maloba na nse
^ Lil., “konyangwa.”