Nzembo 57:1-11
Epai ya mokambi ya nzembo. “Kobebisa te.” Ya Davidi. Mikitame. Ntango akimaki Saulo, akɔti na mobenga.+
57 Ee Nzambe, moniselá ngai boboto, moniselá ngai boboto,+Mpo molimo na ngai ekimi epai na yo;+Mpe nazali kokima na elili ya mapapu na yo kino mikakatano ekoleka.+
2 Nazali kobenga Nzambe Oyo-Aleki-Likoló, Nzambe ya solo oyo azali kosukisela ngai mikakatano.+
3 Akotinda lisalisi uta na likoló mpe akobikisa ngai.+Akobulunganisa mpenza moto oyo azali koswa ngai.+ Sela.Nzambe akotinda motema boboto na ye mpe bosolo na ye.+
4 Molimo na ngai ezali na katikati ya bankɔsi;+Nazali na likambo mosusu ya kosala te kaka kolala na kati ya bato oyo badundaka, ɛɛ bana ya bato,Baoyo mino na bango ezali makɔnga mpe makula,+Mpe baoyo lolemo na bango ezali mopanga oyo epeli.+
5 Ee okumisama kuna na likoló, Ee Nzambe;+Nkembo na yo ezala likoló ya mabele mobimba.+
6 Babongiseli makolo na ngai monyama;+Molimo na ngai egumbami.+Batimolaki liboso na ngai libulu ya motambo;Bakwei na kati.+ Sela.
7 Ee Nzambe, motema na ngai ezali kotengatenga te,+Motema na ngai ezali kotengatenga te.Nakoyemba mpe nakobɛta mondule.+
8 Ee nkembo na ngai,+ lamuká;Ee ebɛtɛlo ya nsinga, lamuká; Ee nzɛnzɛ, ná yo mpe.+Nakolamwisa kotana ya ntɔngɔ.
9 Ee Yehova, nakokumisa yo na kati ya bato ya bikólo;+Nakobɛtɛla yo mondule na kati ya bituluku ya bato ya bikólo.+
10 Mpo motema boboto na yo ezali monene kino na likoló,+Mpe bosolo na yo kino na mapata.+
11 Ee Nzambe, okumisama kuna na likoló;+Nkembo na yo ezala likoló ya mabele mobimba.