Nzembo 56:1-13

Epai ya mokambi ya nzembo mpo na Ebenga oyo efandi nyɛɛ na kati ya baoyo bazali mosika. Ya Davidi. Mikitame. Ntango Bafilistia bakangaki ye na Gate.+ 56  Ee Nzambe, moniselá ngai boboto, mpo moto​—mowei mpamba​—aswi ngai.+Azali kobunda mokolo mobimba, azali kaka konyokola ngai.+   Banguna na ngai bazali kaka koswa ngai mokolo mobimba,+Mpo baoyo bazali kobunda na ngai na lofundo bazali mingi.+   Ezala mokolo nini nakobanga, ngai, ɛɛ ngai, nakotyela yo motema.+   Lokola nazali na bomoko na Nzambe, nakosanzola liloba na ye.+Natyeli Nzambe motema na ngai; nakobanga te.+Moto* akoki kosala ngai nini?+   Mokolo mobimba bazali kaka kobebisa makambo na ngai;Makanisi nyonso na bango ezali mpo na kosala ngai mabe.+   Bazali kobunda, bazali komibomba,+Bango, ɛɛ bango, bazali kaka kotala makolo na ngai,+Wana bazeli molimo na ngai.+   Mpo na misala na bango oyo eyokisaka mpasi, bwaká bango.+Ee Nzambe, na nkanda na yo, kitisá bato ya bikólo.+   Yo moko olobaki ete nazala moto oyo azali kokimakima.+Tyá mpisoli na ngai na kati ya molangi na yo ya mposo ya nyama.+Yango ezali na kati ya buku na yo te?+   Na ntango yango banguna na ngai bakozonga nsima, na mokolo oyo nakobenga;+Nayebi yango malamu, ete Nzambe azali mpo na ngai.+ 10  Lokola nazali na bomoko na Nzambe,+ nakosanzola liloba na ye;Lokola nazali na bomoko na Yehova, nakosanzola liloba na ye.+ 11  Natyeli Nzambe motema na ngai. Nakobanga te.+Moto ya mabele akoki kosala ngai nini?+ 12  Ee Nzambe, ezali na bilako oyo nasali epai na yo.+Nakopesa yo makabo ya botɔndi.+ 13  Mpo obikisi molimo na ngai na liwa+Obikisi makolo na ngai ebɛta libaku te,+ boye te?—Mpo natambola epai na epai liboso ya Nzambe na kati ya pole ya baoyo bazali na bomoi.+

Maloba na nse

Lil., “Mosuni.”