Nzembo 54:1-7
Epai ya mokambi ya nzembo na bibɛtɛlo ya bansinga. Maskile. Ya Davidi. Ntango Bazife bakɔtaki mpe balobaki na Saulo ete: “Davidi amibombi nde epai na biso te?”+
54 Ee Nzambe, bikisá ngai na nkombo na yo,+Mpe na nguya na yo sambá likambo na ngai.+
2 Ee Nzambe, yoká libondeli na ngai;+Tyá mpenza litoi na maloba ya monɔkɔ na ngai.+
3 Mpo ezali na bapaya oyo babimeli ngai,Mpe banyokoli oyo bazali koluka molimo na ngai.+Batye Nzambe liboso na bango te.+ Sela.
4 Talá! Nzambe azali mosungi na ngai;+Yehova azali kati na baoyo basungaka molimo na ngai.
5 Akozongisela banguna na ngai mabe;+Na bosolo na yo kangisá bango monɔkɔ.+
6 Nakopesa yo mbeka na motema moko.+Ee Yehova, nakokumisa nkombo na yo mpo yango ezali malamu.+
7 Mpo abikisaki ngai na mpasi nyonso,+Mpe liso na ngai etali banguna na ngai.+